jeudi 18 décembre 2008

"ESIKA EZALI TE MPO YA BANGO …"

Eyenga ya Mbotama 2008

Mokanda mwa Tata Episkopo ona bandeko bakristu ya Diocèse ya Inongo.

(Totanga mokanda moye na Mbotama, to balomingo elendani Mbotama kin'o lomingo la Batisimu ya Mokonzi 11/01/2009)

"Esika ezalaki te mpo ya bango o ndako ya bampaya (Luk. 2, 7)

Bandeko bakristu ba bolingo,

Natombeli bino eyenga elamu ya Mbotama mpe mobu molamu mwa sika 2009. Mokonzi atondisa bino na bolamu, na boboto mpe na nguya ya Ye.

Na Nsango Elamu ya Santu Lukasi (oyo etangamaka na misa ya butu ya mbotama), nsango ya mbotama ya Yezu ezali solo nsango ya kokamwa makasi. Kuna na Lukasi tozali kotanga 'te Yezu abotami na ntango ya mobembo, na ndako ya nyama (bibwele), mpo "esika ezalaki te mpo ya bango(Yozefu na Maria) na ndako ya bampaya"...Nzambe andimi 'te Mwana ya Ye, mwana-Nzambe, abotama ndenge wana ! Oyo nsuka ya likambo! Nani akoki kondima likambo ya ndenge boye ?

Bandeko ba bolingo,

Eloko toyebi ezali 'te Nzambe asalaka makambo ya Ye na ntina. Soko Nzambe atiki 'te mwana ya Ye abotama ndenge wana, alingi bongo koyebisa biso 'te Ye azali liboso liboso Nzambe ya bato bake, Nzambe ya bato mpamba, Nzambe ya bato bazangi esika na mokili oyo. Soko otangi Biblia mobimba okomona 'te Nzambe azali liboso Nzambe ya bato bazali na boumbu, bato banyokwami, bato batiami pembeni, bato bazali na kati ya mpasi.
Ye moko alingi kosimba bomoi ya bango mpe abikisa bango.

Na bomoi ya Ye mobimba, kobanda mbotama ya Ye tee na liwa ya ye na Kuruse, Yezu, Mwana wa Nzambe, ayei komikotisa Ye moko na kati ya molongo ya batu mpamba, bato oyo tokoki kobenga "baleki-nzela", bato bazangi esika na mokili oyo. Amikomisi ndeko ya basumuki, ndeko ya bato ya maba, ya bato bakufa miso, ya bato bayonkwami. Elingi bongo koloba 'te Nzambe azali te ndenge biso tokanisaka. Azali te esika totiyaka ye liboso: esika ya lokumu, ya bomengo, ya succès. Azali Mokonzi solo, kasi Nzambe ya biso azali mokonzi ndenge ya bakonzi ya biso ya nse te.Bokonzi ya Ye bozali liboso bokonzi ya bolingo bonene: bokonzi ya kozala penepene na bato baye liboso liboso baye bakeleli; azali penepene na bato bake mpo abondo bango mpe abikisa bango. Bongo moto moko atikala ye moko te na kati ya mpasi ya ye. Moto moko abungama te.

Bandeko ba bolingo,

Biso banso toyebi ndenge bandeko ebele na ekolo ya biso bakomi "baleki-nzela" solo. Bazangi esika na mokili ya biso : Ezala mpo ya bitumba basengeli kokima, lokola bandeko ya Goma; ezala bandeko bazanga esika ya kolala; ezala baye bazangi biloko mpo ya kobika lokola bato; ezala baye bazangi nkisi mpo ya kobika na maladi, ezala bana bakoki koyekola te; ezala baye bazanga bato mpo basunga bango. Mokili Nzambe apesi mpo ya bolamu ya biso banso, bato basusu bake bakamati yango mpo ya bango moko: mpo ya lokoso ya mbongo, lokoso ya bokonzi mpe lokoso ya bisengo ya mokili. Oyo ezali lisumu lizali kobebisa mokili ya biso. Kasi banda mokolo Nzambe Ye moko amikomisi na molongo ya babola, ntango ya sika esi ebandi. Ngonga ya bolongi esi ebeti, ngonga ya libiki mpe ya kotelema na boumbu ekomi.

Bandeko ba bolingo,

Mbotama ya mobu moye mozali Mbotama ya kosimba makasi bandeko bazali na mpasi mpe bayonkwami. "Soko mosapi moko mozoki mpota, makila makotanga na loboko mobimba", elobeli ya bankoko. Bandeko bazali na Est na kati ya bitumba bazali bandeko ya biso. Bazali elembo ya mokili mobimba ya Kongo, esika wapi lisumu ya kokosa mpe ya konyata baninga ezali makasi. Tosenga na Mokonzi oyo azali Nzambe ya bato batiami mpembeni, abongola ndenge ya biso ya kotala baninga bato. Apesa biso nguya ya kolonga makambo mya bokosi mpe mya bonyokoli baninga. Ezali etumba; kasi tokolonga yango na bokasi ya bolingo Mwana Nzambe amemi na mokili oyo, awa andimi kobotama lokola mwana ya babola, mwana ya bato oyo bazalaki na esika te o ndako ya bampaya.

Bandeko, Mokonzi oyo ayei o kati ya biso mpo abimisa biso na molili, afungola biso banso nzela ya boboto bwa solo. Alongola biso na molili ya motema,molili ya koyinana, ya kotala baninga mpamba,molili ya bobangi, molili ya lokuta mpe konyokolo baninga. Tosambelana.
Nzambe apambola bino banso na mobu moye mwa sika. Abenisa biso banso.

Wa bino : Papa Episkopo,

+Philippe NKIERE KENA

Episkopo wa Inongo

Aucun commentaire:

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj
31.03. 2018-

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm
(06.01.1954-12.06. 1967) + 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
(12.06. 1967-22.07. 2005) + 19.11.17

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm
27.07.2005-31.03. 2018

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO