dimanche 18 mars 2018

Vème dimanche du Carême

Lomingo la Itano la Karezimo
************************
Tabernacle de Ste Croix/ Bokoro
Bandeko, bobele soko mboto ewei ekoki kobota mbuma ya sika. Se bongo Kristu akokisi bondeko bwa sika. Awei mpo ya kobimisa ekolo ya sika ya bana ba Nzambe.
Litangi lya yambo: Liloba lya Nzambe lokola profeta Yeremia akomi (31,31-34)
Litangi lya Ibale: Mokanda ona ba Ebrei (5,7-9)
" Bandeko 
7. ntango azalaki o mokili moye, Yezu Kristu asambeli, na bogangi mpe na boleli  mai o miso, mpe abondeli Nzambe, oyo akokaki  kobikisa ye o liwa. Nzambe andimeli ye mpo na botosi bwa ye.
8. Nzokande ye Mwana nzambe akomi moto wa botosi na mpasi ayoki.
9. Ntango akokisi manso tee nsuka, akomi mobiksi wa seko wa baye banso  bakotosoka ye.
Nsango elamu lokola santu Yoane akomi (12,20-33)
"20.  O kati ya bato bayaki kokumisa Nzambe o eyenga ya Pasika basusu bazalaki ba Yuda te;
21. bakei epayi ya Filipo, moto wa Betsaida o Galilea, balobi na ye:
"Tata , tolingi komona Yezu"
22. Filipo akei koloba yango na Andrea. Andrea na Filipo bakei koyebisa Yezu.
23. Yezu azongiseli bango: Elaka ekoki 'te Mwana wa Moto akozwa nkembo (..). 

Aucun commentaire:

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj
31.03. 2018-

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm
(06.01.1954-12.06. 1967) + 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
(12.06. 1967-22.07. 2005) + 19.11.17

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm
27.07.2005-31.03. 2018

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO