dimanche 4 mars 2018

IIIème dimanche du Carême (B)

Lomingo la Isato la Karezimo
***************
Bandeko, Nzambe alingi tobonzela ye mitema mya biso, na botosi mibeko mya ye minso. Tosenge Nzambe nguya ya koyamba nsango Elamu na motema moko, mpe ya kokumisa ye na ezalela ya bosembo solo.
Nzembo: Toyei o mboka yo Mokonzi, e Nzambe ndima losambo.
1. Tala ko biso bana e, bana ba yo basumuki. Limbisa biso nyongo e, mpo ya malozi ma Yezu.
2. Awa tosangani boye , nsambo ya biso yambani. Boyisa mposa ya mabe, tolonga zabolo seko.
3. Nsoni ekangi biso e, nsomo, bolozi na mawa. Bikisa biso o liwa, tolia Pasika noki.

Tosambela:
E Mokonzi, yo liziba lya malamu manso; olakisi biso nzela ya kobika o lisumu;
tolala nzala, tosambela mpe tokaba biloko.
Toyebi botau bwa biso, tondimi 'te tosali mabe, 
obikisa biso na bolingi bwa yo bonene.
Tokobondela bongo zambi lya Yezu Kristu, Mokonzi wa biso mwana wa yo ye Nzambe;
azali na nkembo elongo na yo mpe na Elimo Santu, o bileko binso seko.
Amen.
Matangi:
Litangi lya Yambo: Liloba lya Nzambe lokola likomami o buku ya Bobimi ( 20,1-17)
Litangi lya Ibale: Mokanda mwa yambo mwa santu Polo ona Bakristu ba Korinti (1, 22-25)
"22.  bandeko, ba-Yuda balingi komona makamwisi; ba Greki bazali koluka bwanya.
23. Nzokande biso tozali kosakola Kristu awei o kuruze: o miso ma ba-Yuda ezali esimbisi; o miso ma bapagano ezali likambo lya bozoba.
24. Kasi  bato ba ye Nzambe abyangi, ba-Yuda na ba Greki, bakomono Kristu lokola nguya mpe bwanya bwa Nzambe
25. Solo, maye mamononi lokola bozoba bwa Nzambe maleki na bwanya maye ma mayele ma bato;
mpe maye mamonani lokola botau bwa Nzambe maleki na nguya maye ma bokasi bwa bato".
Bandeko, liloba lya Nzambe wana - Tondimi lyango
Nsango Elamu lokola santu Yoane akomi ( 2,13-25)
Pasika ya Bayuda ekomi penepene; Yezu akei o Yeruzalem. O tempelo akuti bato bakotekeke ngombe, mpata mpe bibenga, na mpe bato bakosenzeke mbongo bafandi wana. Asali fimbu na mikulu mpe abengani bango banso o Tempelo, na mpata na ngombe; apanzi mosolo mwa baye bazali kosenze mbongo, mpe akweisi meza ya bango. .......!
E Nzambe Tata, oyamba mabondeli ma biso bana ba yo, olendisa biso topona se mambi ma bosembo, bongo tosalela yo lokola esalaki Yezu Kristu,  Moteyi mpe Mobikisi wa biso o bileko binso seko !

Aucun commentaire:

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj
31.03. 2018-

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm
(06.01.1954-12.06. 1967) + 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
(12.06. 1967-22.07. 2005) + 19.11.17

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm
27.07.2005-31.03. 2018

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO