dimanche 25 février 2018

IIème dimanche de Carême (B)

Lomigo la Ibale la Karezimo
**************
Mpo ya kolendisa boyambi bwa  bapostolo, Yezu alakisi bango nkembo eye akozwa nsima ya liwa ya ye.  Bango mpe bakokoma na bomoi boye bwa nkembo soko bandimi kolanda ye bipai binso mpe kosangela nsango elamu ya ye.
Masumu ma ngai olimbisa , Yo Nzambe nta bolamu. 
1.Topesi yo motema toyei o mboka yo, Yo Nzambe wa bokasi bonso
2. Mobikisi wa bato yo mwana wa Tata, olimbisa masumu manso
3.Otalaka bakristu obatela bango; bazwi na yo malamu manso
4. O kati ya molili otalisa nzela; olendisa biso mitema
 Matangi
Litangi lya Yambo: Liloba lya Nzambe lokola likomami o buku ya Libandela (22,1-2.9a.10-13.15-18)
Litangi lya Ibale: Mokanda mwa santu Polo ona Bakristu ba Roma (8,31b-34)
Nsango Elamu lokola santu Marko akomi (9, 2-10)
2.  Mokolo moko Yezu akamati, Petro, Yakobo na Yoane, abuti na bango ngomba esanda, abongwani o miso ma bango.
3. Bilamba bya ye bikomi kongenge, bikomi mpembe mpenza: moto moko te o mokili mobimba akoki kotelisa bilamba bongo. 
4. Elia na Mozè babimeli bango mpe babandi kosolola na Yezu.
5. Petro alobi na Yezu: " Moteyi, kozala awa ezali malamu mingi; topika awa biyema bisato, yoko ya yo, yoko ya Moze mpe yoko ya Elia".
6. Ayebi malamu te nini azali koloba, zambi nsomo ekangi bango.
7. Limpata liyei kozipa bango, mpe lolaka loyokani u'to limpata: " Oyo azali mwana wa ngai wa bolingo, boyoka ye".
8. Na mbalakaka, batala epayi na epayi, bamoni lisusu moto te, se bango moko na Yezu.
9 Ekomi bango kokita ngomba, Yezu apekisi bango baloba na moto moko te likambo bamonoki, tee mokolo Mwana wa Moto akosekwa o bawa.
10 Babombi maloba mana o mitema;
Kasi bazali mpe komituna 'te:
kosekwa o bawa lokola nini?
Lokumu na yo: Kristu! 

Aucun commentaire:

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj
31.03. 2018-

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm
(06.01.1954-12.06. 1967) + 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
(12.06. 1967-22.07. 2005) + 19.11.17

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm
27.07.2005-31.03. 2018

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO