dimanche 18 février 2018

Ier dimanche du Carême (B)

Lomingo la Yambo la Karezimo
***************
Lokola Kristu andimaki masenginya ma zabolo te,  biso mpe tosengeli kobunda na mango. Kasi bobele na nguya ya Elimo Santu tokoki kolonga etumba eye ya mokolo na mokolo.
Litangi lya yambo: Liloba lya Nzambe lokola likomami o buku ya Libandela ( 9, 8-15)
Litangi lya Ibale: Mokanda mwa yambo mwa santu Petro ( 3,18-22)
Nsango Elamu lokola santu Marko akomi (1,12-15)
Awa Yezu awuti kokula batisimo, Elimo atindi ye o eliki. Aumeli o eliki mikolo ntuku inei. Satana ayei kosenginya ye. Azalaki o kati ya nyama ya zamba, mpe banzelu bazalaki kosalela ye. Ntango basilisaki kokanga Yoane o boloko, Yezu akomi o Galilea. Asangeli nsango Elamu ya Nzambe  alobi: " Elaka ekoki: Bokonzi bwa Nzambe bokomi penepene; bobongola mitema mpe boyamba Nsango Elamu."
Lokumu na yo - Kristu.

Aucun commentaire:

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj
31.03. 2018-

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm
(06.01.1954-12.06. 1967) + 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
(12.06. 1967-22.07. 2005) + 19.11.17

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm
27.07.2005-31.03. 2018

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO