mercredi 14 février 2018

Eleko ya Karezimo

Mokolo mwa mputulu
***************
Bandeko, lelo tobandi eleko ya Karezimo. Tokozwa elembo ya mputulu mpo ya kolakisa 'te toboyi masumu. Tolingi mpe kolakisa Nzambe 'te toyoki motema mawa mpo ya mabe tosali.
Nzembo: Masumu ma ngai olimbisa , yo Nzambe nta bolamu

Tosambela:
E Mokonzi, osalisa biso  tosantisa mokolo mwa lelo, tobanda eleko ya Karezimo malamu. Tolendisa mitema na bomipimi biloko mpo tokoka kobunda etumba na mabe manso.

Litangi lya Yambo: Liloba lya Nzambe lokola profeta Joel akomi (2, 12-13.16-18)
Litangi lya Ibale: Mokanda mwa santu Polo ona bakristu ba Korinti (5,20-6,2)
Nsango elamu lokola santu Mateo akomi (6,1-6.16.18)

Bobenisi Mputulu
Mokonzi Nzambe wa biso, okolimbisaka bato bakomikitisa o miso ma yo mpe bandimi kobongisa mabe basali. Ondima losambo la biso: benisa + basaleli ba yo bakozwa mputulu lelo, mpo 'te batosa mibeko mya Karezimo, bongo mitema mya bango mipetwama; bakoka kosepela Eyenga ya Pasika, mokolo tokokundola nsekwa ya Mwana wa Yo, azali na nkembo elongo na Yo mpe na Elimo santu o bileko binso seko.

Bopakoli mputulu:
- Bongola motema mpe ndima Nsango Elamu ya Kristu
To:
- Ndeko, kanisa 'te ozali mabele mpe okozonga o mabele

Eleko elamu ya Karezimo na bino banso

Aucun commentaire:

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj
31.03. 2018-

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm
(06.01.1954-12.06. 1967) + 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
(12.06. 1967-22.07. 2005) + 19.11.17

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm
27.07.2005-31.03. 2018

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO