dimanche 15 février 2009

MESSAGE DES PRETRES AUX CHRETIENS

Inongo, le 12 février 2009

 

Bandeko ba bolingo

 

Boboto bwa Mokonzi bozala na bino !

Na motema esengo, biso ba Nganga Nzambe ba bino, topesi bino longonya mpe merci mingi  mpo ya bisambo bosambeli mpo ya biso ; totondi mpe bino mpo ya  biloko bokongolaki  mpo ya likita lisangisaki biso na Tata Episkopo. Na likita lyango totondi Nzambe mpo ya Nsango Elamu tozwi eleki sika mbula nkama moko. Awa tobandi mbula  ya nkama mibale ya liloba, totali boni boni na mosala mwa bonganga- Nzambe, biso tokoki mpe tosengeli  kotombola mpe kokolisa bomoi bwa biso mpo 'te bokonzi bwa Nzambe bopikama o kati ya biso.

Mpo ya bokolisi bomoi bona o kati ya diocese ya biso , tokamati  boko mikano. Lokola mikano mina mitali  bomoi bwa banganga-Nzambe na bomoi bwa  bino bandeko bakristu, yambo 'te mikano mina mikomela biso banso, tokosenga na moko moko wa biso ayeba koyamba miango na motema mobimba  mpo ya bokolisi  bomoi na ntina 'te Bokonzi bwa Nzambe boya o kati ya diocese ya biso. Tolingi 'te maloba ma Mokonzi Yezu makokisama : « Ngai nayei mpo 'te mpata izwa bomoi, izwa bwango mingi » ( Jn 10, 10)

Mbote na bino banso. Botikala na boboto.

 

Tata Episkopo, Ya' Philippe  na

Biso ba Nganga Nzambe ba bino,


 

  

 

 



Ne pleurez pas si votre Webmail ferme. Récupérez votre historique sur Yahoo! Mail

Aucun commentaire:

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj
31.03. 2018-

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm
(06.01.1954-12.06. 1967) + 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
(12.06. 1967-22.07. 2005) + 19.11.17

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm
27.07.2005-31.03. 2018

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO