samedi 30 mars 2013

Lettre de Pâques de Mgr l’évêque /Version lingala



MOKANDA MWA PASIKA (2013) ONA BAKRISTU BA DIOCESE YA INONGO

“Nayambi  Yezu Kristu oyo awei, asekwi mpe azali sikawa na bomoi o kati ya biso…”(Lc24,13-35)

Bandeko ba bolingo,     
                                              
Alleluia! Eyenga elamu ya Pasika na bino banso.
Tata wa bomoi oyo asekwisi mwana wa ye Yaya’ wa biso Yezu Kristu o bawa, atondisa bino banso na elikya mpe na nguya ya sika. Elimo Santu, Mokambi wa Eklezya akamba Papa wa biso ya sika, Papa FRANCOIS, mpe Eklezya mobimba o nzela ya mbongwana ya sika mpo ‘te mokili mobimba motonda na bolamu, na bosembo mpe na boboto. Amen. 

Bandeko ba bolingo,
Toyebi biso banso lisolo ya bayekoli mibale oyo tobengi “bayekoli ba Emmaüs”. Bango babale, nsima ya liwa ya Yezu, batiki Yeruzaleme na mawa makasi o motema, mpe bakei mboka Emmaüs. Na nzela bazali kosolola likolo ya Yezu, Mesiya oyo ayaki kobikisa ekolo ya bango ya Israël, kobimisa bango na boumbu…Kasi tala! Babomi ye na Kuruse, liwa ya nsomo mpe ya bato babe…Ata ko bandeko basi ya groupe ya bango balobi ‘te lilita ya ye ekomi polele, mpe bamoni ye, kasi bango bandimi likambo wana te…
Toyebi ‘te ntango bazalaki bongo na kati ya mawa, Yezu ye moko ayei, lokola mompaya, kotambola na bango nzela moko. Kasi bango bayebaki ye te, miso ma bango mazalaki ya kokangama. Alimboleli bango’te Mesya asengeli kokufa:  ekomami polele na mikanda misantu. Nsima alei na bango esika moko. Awa abuki limpa mpe apesi bango, miso ma bango mafungwami mpe bayebi sikawa ‘te ezali Yezu. Kasi Yezu alimwi…Bango bazongi mbango mbango na Yeruzaleme kopesa nsango na basusu, kopesa“témoignage” ‘te azali na bomoi (Lc 24, 13-35).

  Bandeko ba bolingo,   
Lisolo oyo towuti koyoka ezali mpe lisolo ya biso lelo. Ezala na kati ya mabota, ezala na mboka, ezala na ekolo mobimba, tozali komituna: “tozali kokende wapi?” “Tokosuka ndenge nini?”  Bandeko ebele o kati ya biso bazali lisusu na elikya te ‘te makambo makobonga. Bato ebele babandi koyenga yenga lokola mpata izangi mokengeli; bato ebele babandi kosala makambo na nkanda mpe na nko. Esengo esili. 

Bandeko,
Biso bakristu toyebi mpe tondimi ‘te Yezu Kristu, azali Mwana Nzambe oyo akomi moto. Andimi bobele kokoma moto te, kasi andimi mpe koleka na kati ya liwa (Mc 8, 31-32). Ezali lotomo azwi na Tata (Jn12, 27-33). Ezali mpe mpo ya komonisa biso bolingo ya ye (Jn 15, 13). Bayebaka baninga ya solo na ntango ya mpasi te? Yezu atikali na libanda ya liwa te, kasi andimi kokota na kati mpo ayeba mpasi ya liwa elongo na biso. Alonga bongo liwa mpe alongisa biso mpe liwa. Ntango tokoti na mpasi ata ya ndenge nini, ye azali mpe na kati. Tozali lisusu biso moko te na kati ya mpasi. Tozwi bongo nguya ya kolonga butu, mpe lokola bayekoli ba Emmaüs, kozonga Yeruzaleme epai ya lisanga ya bandeko koyebisa bango ‘te biso mpe tokutani na Yezu, alongisi biso bomoi.
Tozwi nguya ya kosakola polele mabe ma baye banso bazali kokosa baninga mpe koboma bango, awa bazali kobimisa bitumba mpo mobulu mozala. Mikanda misantu milobi polele: “Mokonzi akoyinaka bato bazali koboma baninga mpe kokosa” (Ps 5, 7).

Bandeko ba bolingo,
Toyoki na lisolo ‘te Yezu oyo asekwi atiki bayekoli ba ye te, bango bato bakimaki ye na ntango ya mpasi. Kasi akei kobondo bango na nzela ya Emmaüs. Yezu Kristu azali lelo mpe kokoba kolanda biso, ata tobongoli ye mokongo. Azali koya epai ya biso, kolendisa biso mokolo na mokolo na Liloba ya ye, na présence ya ye na motema... Mbala mosusu toyokaka lokola moto na motema, esengo, boboto oyo toyebi te epai euti! Ye wana, Yaya’ na biso oyo asekwi mpe amikomisi “moleki nzela” mpo atambola na biso mpe alakisa biso nzela ya bomoi...  Nayambi ‘te osekwi, Mokonzi Yezu, mpe ozali kotambola na ngai na kati ya bomoi. Ozali nzela mpe mwinda mwa bomoi bwa ngai. Sala ‘te nalemba baninga te na nzela ya bomoi. Sala ‘te namema bango na molili te kasi epai ya yo, mwinda mwa bomoi.

Bandeko ba bolingo,
Toyoki lisusu na lisolo ‘te Yezu akamati limpa mpe abuki yango, apesi bango... Oyo nde elembo ya limpati ya nsuka ya Yezu na bayekoli ba ye (Lc 22,14-20). Elembo ya bomoi bwa ye mobimba. Ayei mpo amikaba; ayei mpo azala mosaleli, moumbu ya bandeko ba ye, biso baleki ba ye (Lc 22,25-27). Elembo ya Ukaristiya. Ntango tosangani mpo ya Ukaristiya lokola Eklezya, Mokonzi Yezu azali o kati ya biso. Lokola ye, mpe na nguya ya ye, tosengeli kondima kokaba bomoi bwa biso mpo baninga bazwa bomoi. Oyo wana nde kokota na Pasika, kosepela Pasika lokola Mokonzi alingi.

Bandeko, ntango ya kolela lela esili. Tolata nguya ya Mokonzi Yezu oyo awei, asekwi mpe azali sikawa na bomoi o kati ya biso. Mokonzi akolisa boyambi bwa biso mpo toyamba ye lokola Mobikisi wa solo. Akolisa mpe bolingo bwa biso mpo  toyeba, o nzela ya bomoi, kokende kokutana  na baye bazali na mpasi; mpo toyeba kokaba bomoi bwa biso mpo ya baninga. Bongo Diocèse ya biso, ekolo mobimba, mokili mobimba tokota banso na bomoi mpe na ntango ya sika, ntango ya nsekwa.
Mokonzi abenisa biso: tokoma bato ba elikya mpo ya Eklezya mpe mpo ya mokili.Kristu asekwi: mokili mobimba mokoti na ntongo ya sika, ntongo ya nsekwa. Yango nde eyamba ya biso. Amen. Alleluia.
                                                            Inongo, mwa  le 30 Mars 2013
                                                            Wa bino, Tata Episkopo mpe Yaya’
                                                           + Philippe NKIERE KENA
                                                            Episkopo wa Inongo.

Aucun commentaire:

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj
31.03. 2018-

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm
(06.01.1954-12.06. 1967) + 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
(12.06. 1967-22.07. 2005) + 19.11.17

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm
27.07.2005-31.03. 2018

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO