dimanche 12 août 2018

Ntombwa ya Maria o likolo

 
 Bandeko, lelo o eyenga ya Ntombwa ya Maria, Eklezya ekolakisa biso Maria ndakisa ya solo ya bakristu banso.  Ye moto wa liboso oyo Nzambe apesi lokumu lonene mpo ya boyambi mpe botosi bwa ye.
Tosepela toyemba nkembo ya Mama, Ntombwa ya Maria kin' o likolo
1. Lelo tokoyemba na mondimo monso Ntombwa ya Maria kin' o likolo.
2. Yo mama wa Nzambe, obotami petwa  ozongi mpe petwa kin' o likolo
3. Nzoto na molimo imemeki Kristu itikali petwa kin' o likolo
4. Otiki mokili na lokumu lonso Mama otombwami kin' o likolo
5. Lel'o mboka Nzambe, ozali na nzoto ye nkembo enene kin' o likolo.
Litangi lya yambo: Liloba lya Nzambe lokola likomami o buku ya Boyebisi Mibombamo ( 11,19a; 12, 1-6a.10ab)
19. Tempelo ya Nzambe o likolo efungwami, 
1 mpe elembo enene ebimi o likolo: Mwasi moko alati mwese lokola elamba, sanza ezali o nse ya makolo ma ye, minzoto zomi na mibale mizali kokembisa moto mwa ye; 
2 azali na zemi, alingi abota aleli mpo ya mpasi ya kobota .
3 Elembo ya bibale ebimi o likolo: Ebakata ya nyama, ekokani na ngando, eteli lokola moto ezali na mito nsambo mpe na maseke zomi; o moto moko elati enkoti ya bokonzi. 
4 Mokila mwa yango mokombi eteni ya bisato ya minzoto ya likolo; mpe mobwaki mwango o nse.  Ekomi ngando o boso bwa mwasi oyo alingi abota, elingi koliya mwana akobotama sikawa.
5 Nzokande Mwasi aboti mwana mobali, oyo akokamba bato ba nse banso na lingenda lya ebende. Mwana wa ye atombwami o mboka Nzambe, penepene na ngwende wa ye.
6 Mwasi akimi o eliki; kuna Nzambe alengeleli ye esika. 
10 Sikawa nayoki lolaka logangi o likilo: " Ut' o sikawa, lilonga, nguya na bokonzi bikomi bya Nzambe wa biso, mpe boyangeli bokomi bwa kristu wa ye!"

Litangi lya Ibale: Mokanda mwa yambo mwa santu Polo ona bakristu ba Korinti ( 15,20-27 a)
Nsango Elamu lokola santu Luka akomi ( 1,39-56). 
                                                            Bonne fête à tous !

Aucun commentaire:

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj
31.03. 2018-

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm
(06.01.1954-12.06. 1967) + 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
(12.06. 1967-22.07. 2005) + 19.11.17

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm
27.07.2005-31.03. 2018

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO