vendredi 1 octobre 2010

Mot du Père Provincial,CICM


Maloba ma sango mokumi wa ba CICM o mokolo mwa bosepeli jubilé ya mibu nkama mobimba ya centenaire o paroisse Sainte croix Bokoro.

Bana ba Nzambe ba paroisse sainte Croix, boyoka ensengo Nzambe azali a bino.
Bana ba Nzambe ya solo lelo ezai mokolo mwa esengo, mokolo mwa nsai mokolo mwa nkembo mpamba te lelo tozali kosepela eyenga ya mibu nkama ya Paroisse ya biso Sainte Croix.
Bana ba NZambe, jubilé ezali likabo lya Nzambe akopesaka eklezya mpe bana ba baye. Jubilé eye ezongisi bondeko o kati ya biso na Nzambe mpe kati ya biso na biso, ememi boboto bondeko, bomoko mpe esengo o mboka Bokoro.
Mpo ya Jubilé eye tokomi solo bana baTata Nzambe me bandeko mpenza ba Yezu kristu.
Bana ba Nzambe jublé eye ezali mpe libaku mpo ya biso ya kobongola motema, kozngela Nzambe Ye Nkolo wa bomoi bonso mpe wa makambo manso mazali koleka.
Nzambe ye mei abatela mpe abenisa mboka ya Bokoro, bakrisstu balingana, balimbisana, basalisana, mboka ya biso engenge na mwinda mwa Kristu.
Bakristu ba Bokoro bazala lokola mungwa ma nse mpo ‘te mboka epola to ebeba te.
Bana ba Nzambe lelo bozali kosepela centenare ya Paroisse Ste Croi/Bokoro.
Bozali kokundola ebandela ya Paroisse ya bino mwa 10 novembre 1910 na sango Jules Denis CICM na moninga wa ye sango Euler, CICM.
Banda mokolo mona na Bokoro Sainte Croix, nsango elamu epanzani mpe eboti paroisse Marie rene ya Kutu na 1935 na nsima eboti paroisse isusu (ebele). Mosala mwa basangeli nsango elamu o Diocèse ya bino mobandaki na ba missionnaires CICM lelo elongo na bino, biso ba CICM ba lelo tokopesa matondo mpe longoya na ba missionnaires banso basalaki mosala malamu o diocese ya bino, mingi mpenza o mboka Bokoro.
Mingi kati ya bango basilisi mobembo mwa bango awa o nse, bapema o esika ya esengo epayi Tata Nzambe alengeli mpo ya basali balamu.
Bana ba Nzambe, awa toksepela mibu nkama ya paroisse ya biso tokopesa matondo mpe longonya na Monseigneur Jean van Cauwlaert, CICM, episkopo wa yambo na mpe Monseigneur Léo Lesambo, episkopo wa babale bakisa yaya Philippe Nkiere, episkopo wa inongo o mokolo mwa lelo.
Matondo mpe longonya na bango mpo ya misala minene basalaki mpe bakokba kosala mpo ya paroisse ya biso Sainte Croix Bokoro.bana ba Nzambe, tlingi mpe kopesa matondo mpe longonya na ba Abbés, ba ma soeurs elongo na ba agents pastoraux banso bamipesi mobimba mpo ya kokoba mosala ba missionnaiires CICM babandaki o paroisse ya bino Sainte Croix, oye mwa kopanza nsago elamu biapi binso.
Biso ba CICM tokosambela mpo’te mosala tobandaki bokoba mwango na elimo ya bomoko ya bolingo mpe ya boboto na boluki ntango inso lokumu la Nzambe mpe libiki lya bato.
Bana ba Nzambe ntembe te, boalaki namawa mpo na boko makambo malekanaka na Paroisse ya bino Sainte Croix Bokoro. Kasi na libaku lya eyenga enne ya Jubilé ya centenaire ya lelo, boteleme lisusu, bopesana maboko, botonga mboka mpe Elezya na bolingi mpe botosi bakonzi ba Eklezya mpe na bakambi banso ba CEVB, bakristu ba Bokoro bolakisa polele na maloba mpe na bikela bilamu ‘te bozali banso bana ba bolingi bw Tata Nzambe.mpo ‘te bokonzi bwa Nzambe, bokonzi bwa boboto, bwa bosembo mpe bwa bosolo botongama o mboka ya bino.
O kati ya makama mpe mpasi ndenge na ndenge ata bobola, bolanda mobikisi se moko Yezu Kristu botiya motema seko epai ya Kristu,bobya kolanda mayele mabe ma satana libela.
Mpo na bosukisi olingi kopesa matondo mingi na Mgr Bokoro yoka esengo Nzambe azali na yo.
Totmbeli na bino banso eyenga elamu ya jubilé mpe boboto bwa Mokonzi Yezu kristu bozala na bino banso.
Bokoro, le 19/09/2010
P. Maurice Nsambo, CICM
Supérieur Provincial.

Aucun commentaire:

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj
31.03. 2018-

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm
(06.01.1954-12.06. 1967) + 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
(12.06. 1967-22.07. 2005) + 19.11.17

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm
27.07.2005-31.03. 2018

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO