DISCOURS DU CLERGE
Tata Episkopo, Mgr Philippe,
Mgr le Vicaire général,
Chers Vicaires épiscopaux (tous),
Révérends Abbés,
Révérendes sœurs,
Révérends frères,
Mr le Commissaire de District Assistant,
Mrs les ATA,
Distingués invités,
Bandeko bakristu,
BOBOTO, BONDEKO,
« Soko mboto ekwei o mabele te, mpe ewei te, ekotikala yango moko, kasi soko ewei, ekobota mbuma mingi » (Jn 12, 24).
Tata Episkopo,
Bandeko bakristu, Maloba maye ma Nsango Elamu makokisami mpo ya biso o mokolo mwa lelo, mingi mpenza na Ukaristya tosambeli mpo ya kosenga na Nzambe bopemi bwa seko ona mosaleli wa ye, ndeko wa biso mpe Tata wa milimo, Abbé Pius BOINA.
Yambo mpenza, biso baninga mpe bandeko ba ye ba Nganga-Nzambe, topesa ye mbote ya nsuka, tolingi liboso mpenza kopesa na Bakonzi ba Leta, baye ba libota ya Mr l’Abbé Pius, bayebani mpe bino bakristu bana ba Libota lya Nzambe merci mingi na ndenge bondimi kosangana na biso na ntango oyo ya mpasi. Bondimi komema elongo na biso kuruse eye ya mpasi, mpe komela na biso nkeni eye ya malozi. Tala ntina nini ntango tozalaka na mpasi, to mpe tozali kosepela, tolingaka kobombela bino te ; banso elongo, tokokisa bongo boye mobombamo monene mwa Eklezya, « Nzoto ya Kristu ». Santu Paul akomi polele : « soko enama yoko eyoki mpasi, binama binso bikomi mpe na mpasi ; soko enama yoko ezwi lokumu, binama binso bizali kosepela na ye yango elongo » (1 Cor 12,26).
Tata Episkopo,
Bandeko Bakristu, Abbé Pius atiki biso banda mokolo mwa misala mibale, o mwa le 10 Juillet 2007, na ngonga ya 17h 30 to 5 h 30 ya mpokwa ; tokoki koloba se mikolo misatu nsima ya bosepeli mibu ntuku inei na minei ( 44 ) ya bonganga bwa ye, o mwa le 07 Juillet 2007. Na mimeseno mya biso, tokosambelaka misa ya nkembo mpe tokotombelaka ndeko wa biso, bobenisi bwa Nzambe mpo aumela lisusu mikolo ebele o mosala mwa ye (« ad multos annos ). Kasi, bandeko, toyebi mpe na malamu bomoi bwa biso awa o nse : lelo malamu, lobi makambo, lelo tosepeli, lobi toleli. Na mbula iye isatu ilandani, na Diocèse ya biso, tozwi makama mingi ya liwa : ezala na molongo mwa biso ba Nganga-Nzambe, ba Abbés ba biso to ba missionnaires ba kala, ezala na molongo mwa ba nyango mpe epai ya bino bakristu. Na bokuse, « mokili ngonga » to « mokili bongola bongola ». Na yango, Elimo ya Nzambe ekosakola polele o buku ya boyebisi mibombamo : « Esengo na baye bakowa o bondeko na Nzambe. Ya solo, ut’o lelo bapema, zambi balembi na mosala monene ; misala mya bango mikolanda bango… » (Ap. 14, 13).
Tata Episkopo,
Bandeko bakristu, Mosala mwa biso , ba Nganga-Nzambe, bino bakristu ba biso, boyebi mwango malamu :koteya batu Nsango Elamu ya Yezu-Kristu, kosantisa Etonga ya Nzambe na bisambo mpe basakramentu, kotombola bomoto bwa baninga na misala mpe o nzela ya bolingi bwa solo ( promotion humaine ). Concile Vatican II elobi mpenza malamu na maye matali Eklezya mpe mokili : « bisengo mpe mpasi ya bakristu, mawa mpe elikya ya bango ezala mpe na mayoki ma basali ba Nzambe » (Cfr Gaudium et Spes, 1). Kosalela Nzambe, ezali liboso mpenza, kotala moninga oyo azali na mpasi. Kosunga bandeko bakeleli. Kotia boyokani na mabota. Koluka naino bolamu ya yo moko te. Na yango, bandeko, Abbé Pius Boina atikeli biso témoignage ya malamu. Na banso bayebaki ye, tokoki kosimba mabongi maye : homme de responsabilités, bâtisseur infatigable, esprit de collaboration et sens d’écoute, bon gestionnaire et homme compétent.
Na bokuse, il fut un chef qui aimait de la discipline et avait le sens de l’organisation. « Ad majora natus est » (Né pour de grandes choses ). Nzambe azwa lokumu na mosaleli wa ye. Abbé Pius amilakisi « mosali wa bosembo » na makambo ma nse, asepela lelo na Mokonzi wa ye o Mboka ya esengo ( Cfr 25, 21 ).
Ndeko mpe Yaya wa bolingo, Abbé PIUS,
Bomoi bwa yo mobimba, osaleli Mokonzi Nzambe na motema moko. Ezala na maye matali botambwisi ba écoles
ya Leta bo Inspecteur ; ezala ntango osimbi ba écoles ya biso ya conventionnées catholiques bo coordinateur provincial,
olembaki ata moke te. Na apostolat, se ndenge yoko : otambolaki na ba mboka ya intérieur. Otongelaki bango ba chapelles lokola na ngambo ya basengele to mpe ba ponts lokola na Oshwe. Nzokande, banso toyembi malamu ‘te omikumisaki te
mpo ya mabongi Nzambe apesi yo. Otambolaki o nzela ya bomikitisi. Oponi na boyambi bonso kozala Pius wa Kuruse ( to Pie de la Croix ). Kuruse, sakramentu ya botau bwa Nzambe, elembo ya bolingi bwa ye nsuka te. Kuruse, mobombamo monene mwa libiki lya biso. Kuruse, sakramentu ya bomoko o Kristu, sakramentu ya bomikabi mobimba na Nzambe
mpe na baninga. Ondimi boye kobakema elongo na Kristu o kuruse ya ye. Nzokande okumisi Nzambe na botau bwa yo.
Losako na yo : « Nkulu, nko nd’ipoku ». Osalelaki bwanya bwa Bankoko lokola mpe Mikanda Misantu mikoteya biso. Nsinga o maboko mpe o makolo lokola Santu Paul olembaki koteya. Nsango Elamu ya Kristu te. Lokola ye, Santu Paul, ozalaki ntoma wa Kristu atako mikakatano, « l’ambassadeur enchaîné » (Cfr 2 Tm 2, 9).
Cher Abbé PIUS,
Lokola Kristu, okumisi Nzambe tee na liwa lya yo. Ntango okoti na mpasi ya yo, osengi na Mama Eklezya sakramentu ya bakoni mpe okuli komunyo ya mobembo mwa nsuka, « la Sainte Viatique ». Lokola bandeko ba Nganga-Nzambe
bakei liboso, Abbé Basile MPUTU, Abbé NGAZAIN na Abbé Jean-Jacques KELIKI, owei na bilembo bya Kristu o nzoto.
ESENGO SOLO ! Lokumu na Nzambe ! Na yango, liboso ‘te tokabwana na yo awa na nse, topesi yo merci na ndakisa kitoko otikeli biso. O nkombo ya Tata Episkopo, Mgr Philippe mpe o nkombo ya ba Nganga-Nzambe banso, ba nyango,
ba mofrères ba Diocèse ya Inongo, tokosenge yo olimbisa biso na mabe manso mapekisi biso tolinga yo lisusu mingi. Biso banso, motu na motu, esika azali, tokokoma malamu ma yo o ntei ya mabanga. Matikala mpo ya seko. Tobwaki boye mabunga ma biso batu o mai bozindo. Tobosana mango libela. Mobu moye mwa Centenaire.
Mokonzi Nzambe apambola Diocèse ya biso ; Yemei azwa lokumu na basali ba ye banso. Eloko nini ekoki kokabola biso na bolingi bwa Nzambe ? (Rm 8,35). Nani akoki kofunda baye Nzambe aponi ? (Rm 8,33).Mama Santu Maria, Mama wa ba Nganga-Nzambe, Mama Mokonzi o likolo, akamba yo kin’o boso bwa Mwana wa ye, Yezu-Kristu.
« E liwa, wapi lilonga lya yo ? »,
« E liwa, wapi nguya ya yo ya kozokisa ? » (1 Cor 15,55)
OKENDE MALAMU !

Aucun commentaire:
Enregistrer un commentaire