vendredi 6 juillet 2007

LETTRES PASTORALES

DIOCESE D’INONGO

LETTRE PASTORALE ( à lire un dimanche à partir du 14 janvier-14 février)

ELAKA EKOKI (Mc 1, 15) :
TOKOKISI MBULA NKAMA MOKO BANDA TOZWI NSANGO ELAMU !

Bandeko ba bolingo,
Na nkombo ya Mokonzi Yezu, natombeli bino banso eyenga elamu ya Mbotama mpe mobu molamu mwa sika (2007). Tata Nzambe apesa biso boboto mpe abatela biso na bolingo bwa ye, lobi mpe mikolo mikoya.
Bandeko,
Elaka ekoki : Mobu moye diocèse ya biso ya Inongo ekosepela mbula nkama(100) ya ebandeli ya bosakoli Nsango Elamu epai ya biso na Mai-Ndombe(ex Lac Léopold II).Sango missionnaire ya liboso abandaki mission ya liboso na 1907 na sanza ya zomi awa na Inongo. Kobanda wana Nsango Elamu epalangani epai ya biso tee lelo.
Likabo ya Nsango Elamu ezali likabo lileki makabo manso, ezali nsuka ya makabo : zambi likabo ya Nsango Elamu ezali Yezu Kristu Yemei. Biso bakristu toyebi mpe tondimi ‘te Yezu Kristu azali Mwana -Nzambe oyoTata Ye moko apesi biso bato. Abotami na mama moko ya biso ya nse, Maria, na nguya ya Elimo santu. Tata apesi biso Ye mpo ‘te akabela biso bato bomoi bouti na Nzambe, bomoi bwa seko (Jn 3, 16). Tata azali kotala biso na bolingo azali kotala Ye. Tokomi , mpo ya Ye, bana ba bolingo ya Tata Nzambe ( 1 Jn 3,1-2). Tozali na kati ya mitema mya biso na mpema ya bolingo, “ Elimo ya mwana wa Ye, oyo azali kobelela : Abba, lokola ‘te Tata !” (Gal 4,6). Yezu Kristu azali solo libandela mpe ntina ya bomoi bwa biso.
Kozala mokristu ezali bongo kondima kozala mpe kobika lokola mwana wa Nzambe solo. Bomoto bwa yo bokomi na valeur mosusu. Okoti na libota ya bana-Nzambe. Okomi“héritier” ya biloko binso bya Nzambe(Gal 4,7). Ozali elongi ya Yezu-Kristu esika ozali mpe na makambo manso osengeli kosala. Yango wana tobengami ba-kristu, bato ba Yezu Kristu, baye bakolanda nzela Ye alandaki na bomoi bwa Ye.
Elaka ekoki : Likabo ya Nsango Elamu ya Yezu Kristu ezali mpe likabo lya bondeko bwa sika mpe bwa seko : kati ya biso na biso bakristu mpe kati ya biso na bato banso. Kozala mokristu ezali bongo kokoma moto ya bolingo mpo ya bandeko bakristu (Jn 13,35) mpe mpo ya bandeko bato banso ba bikolo binso ( Mt 28, 19), kobanda na bato bake lokola Mokonzi Ye moko alakisi biso na bomoi ya Ye mobimba tee na liwa.
Mokristu akoti na ekolo ya sika esika bokabwani ya loposo to ya lokota to ya mboka ezali te (Gal 3, 26-28). Mokristu akoki kondima te ‘te bato basusu banyata mpe banyokolo baninga; batika makambo na kati ya injustice. Mokristu aboyi mpe bonguna.
Elaka ekoki : Likabo lya Nsango Elamu ya Yezu Kristu ezali kozwa likabo ya nguya oyo ezali na Yezu Kristu, Elimo Ya Ye. Toyebi boni boni Yezu apemeli bayekoli ba ye mpema ya Ye ya bomoi (Jn 20, 22) mpe alobi na bango : “ Lokola Tata atindaki ngai, ngai mpe nakotinda bino” (Jn 20, 21). Apesi bango mpe nguya ya kobuka bokasi bwa mabe(lisumu) mpe ya kofungola bomoi (Jn 20, 23)... Kozala mokristu ezali bongo kondima kokoma moto azwi Elimo ya Yezu Kristu mpo ya kobikisa baninga bato mpe kobongisa mokili moye (Rm 8, 1-27). Biso bakristu tozali na nguya ya kolonga bomoi , ya kolonga liwa lokola Yezu Kristu. Tobimi na kati ya bobangi mpe na makambo ma kala.
Elaka ekoki : Likabo lya Nsango Elamu ya Yezu Krisu ezali kozwa likabo ya bonsomi bwa solo na kati ya Yezu Kristu. Ye moto alongoli bato na boumbu bonso : boumbu ya mibeko, ya mimeseno mabe, ya makambo mabe, ya bilimu mabe mpo apesa biso bonsomi bwa bana ba Nzambe ( Gal 5, 1-25). Kozala mokristu ezali bongo kokota na bonsomi ya solo : ezali mokili oyo te esengeli komema yo ndenge elingi. Kozala mokristu ezali koyeba mpe kosala ndenge Mokonzi azali koyebisa yo mpe komema yo.
Bandeko ba bolingo,
Nsima ya mbula nkama (100) ya Nsango Elamu ya Yezu Kristu tomituna na bosolo bonso : biso tozali wapi ? Tosali nini na Yezu Kristu ? Ye azali solo ntina ya bomoi ya biso ? Ye azali solo mwinda ya bomoi mokolakisa biso nzela mpe tokolanda ? Ye azali solo nguya ekosala ‘te tosimba bomoi mpe tobanga eloko te ? Ye azali solo mobikisi oyo nandimi ‘te alongola ngai o masumu mpe o makambo manso makobebisa bomoi bwa ngai ?Na kati ya bomoi ya mokolo na mokolo esika ya Yezu Kristu ezali wapi ? Lisanga atikeli biso tosali na yango nini ? Tozali na kati ya misère (mawa) ntango mboka ezali na biloko mingi.Yezu azali kolobela biso nini na likambo oyo ?

Bandeko ba bolingo,

Soko totali bomoi ya biso mpe ya ekolo, na bosolo mpe na bosembo, nsima ya mbula nkama moko ya Nsango Elamu epai ya biso, tozali nainu mosika ! Kasi tobanga te, tolembisa nzoto te ntango oyo. Elaka ekoki ya komikosa lisusu te, ya komibombama te.Tobima na molili mpe totika ‘te moi ya bomoi bwa Yezu mongengele bomoi bwa biso mpo tomona mpe topono nzela ya sika. Tondima ‘te mbala mingi tozalaki kolanda Yezu Kristu te, mpo totikaki te ‘te Elimo ya Ye akamba biso. Mbala mingi tozalaki kolanda mposa ya biso moko ya mitema, ndenge ya biso moko ya kokanisa to ndenge mokili oyo mozali komema biso, to ndenge baninga bazali kosala, kobika bomoi bwa bango.
Mokili mwa biso, mosengeli na bato ba sika, ba “témoins” ba Yezu Kristu lelo, bato bakobimisa biso na bokabwani mpe na molili ya bomoi, bakobimisa biso na bobangi... Bobele bato ya sika bakotonga mokili mwa sika, Mai-Ndombe ya sika. Mokonzi azali kobelela !
Bandeko, mpo ‘te tokota solo na ntango ya sika na mobu moye 2007, tokosala programme ya makambo tosengeli kolanda mpe kosala bipai binso. Ndeko moko moko afungola motema , misu, maboko, bomoi mobimba mpo ‘te ntango oyo kitoko Mokonzi apesi biso mobu moye, tobungisa yango mpamba te “Likambo na likambo na ntango ya yango”, oyo nde ntango ya kokola na bokristu bwa solo”. Bobele bongo nde totongi, lisanga, mokili mwa sika. Mpo ya biso bato tozwi libaku, ngrasya, ya komona mobu 2007, Mokonzi alingi solo ‘te tofungola nzela ya bokristu bwa sika mpo ya ntango ya lelo. Mokili mwa biso mozwa elongi ya sika.
Na losambo ya Mama Maria, mama wa Eklezya, mpe na bolobeli bwa bandeko banso bamemelaki biso Nsango Elamu awa na Mai-Ndombe, Mokonzi apambola biso banso bipai binso tozali. Nakosenga na Nzambe ‘te abenisa biso mikolo minso mikoya. Atikala o kati ya biso ntango inso.
Mbote mingi mpe bobenisi bouti epai ya ngai.

Wa bino
Tata episkopo Philippe NKIERE KENA

Ekomami na Inongo, 6/01/2007,
o mobu mwa zomi na mitano bwa boepiskopo

Aucun commentaire:

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj
31.03. 2018-

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm
(06.01.1954-12.06. 1967) + 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
(12.06. 1967-22.07. 2005) + 19.11.17

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm
27.07.2005-31.03. 2018

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO