mardi 24 décembre 2019

Mokanda mwa Mbotama 2019



 « Yezu azali mwinda mwa solo moye mokongengisa bato banso o mokili » ( Jn 1, 9)
 Bandeko, lelo tozali kosepela mbotama ya Mokonzi Yezu, Emmanuel. Lelo, lokola mbula na mbula, Nzambe amikomisi moko wa biso ; Ayei o ntei ya biso. Mobikisi Yezu azali o kati ya biso. « Ye oyo baprofeta bakumisaka mpe basangelaka, ye bobele oyo Ngondo Mosantu Maria azilaka na bolingi bonene, se ye oyo Yowane asakolaka ‘te akoya mpe ayebisi ‘te azali o kati ya bato », ye nde moto tobandaki kozela mposo minei na boyambi mpe na losambo mpo ‘te apesa biso esengo mpe atondisa biso na nsai.

 Oyo ayei, azali Nzambe. Na bosawa bonso andimi kokoma moto mpe lokola mwana moke, alingi kokutana na moko moko wa biso mpo ‘te biso toyamba ye, ye mpe ayamba biso. Na Elielo, tokotiaka mingi mpenza ekeko ya Mwana Yezu atandi maboko ; atandi yango mpo maboko ma biso mayamba ye mpe ye ayamba maboko ma biso, na botioli te kasi na elongi ekotalisa esengo. Yango nde ezaleli tosengeli komekola liboso lya Nzambe mpe epai ya baye banso bakoya mikolo minso epai ya biso, mingi mpenza na butu boye (na mokolo moye) mwa mbotama..

 O kati ya bato baye Yezu azali kotandela maboko, babola bazali. Na ntango oyo bandeko basusu, esika ‘te bamipesa na Nzambe, bango bazali koluka mbongo, kosomba biloko ndenge na ndenge, koyiba misolo ‘to kosala mabe, esika ‘te bazwa Nzambe lokola elikya ya bango, tokomona lelo ‘te babola bazali baye bamitiki mpe bamipesi mobimba na Nzambe, se lokola bakengeli mpata bazali banzeneneke ba yambo ya libiki tozwi. Bato ba bosawa na babola, bango nde bato bayebi na bozindo mpe na motema ngolu koyamba mobombamo mwa mbotama. Babola bazali bato bakozwa bisika bya liboso zambi bayebaka noki komona bonene bwa Nzambe o kati ya bomoi bwa bato. Na mbotama ya ye o Elielo, Nzambe ye moko ayei kozongisa elikya na bomoto bwa solo na baye babwakemi. Na Elielo, Yezu azali kosakola na nguya ‘te toyeba kokaba maye Nzambe apesi biso na bato bazangi, mpo totonga mokili mwa sika, mokili mwa bondeko oyo moto moko te akoki komimona lokola moto abwakemi (Cf. Pape François, Admirabile singum). 

Mbotama ezali eyenga ya bomoi kasi ya liwa te. Na Ekolo ya biso, awa tozali kosepela likabo ya bomoi, bato basusu bazali koboma baninga mpe kokotisa bango na mpasi. Liwa ezali kaka koboma nzoto te, kasi awa tokokotisa bizaleli ya mabe oyo ekosala ‘te malamu malongwa o kati ya bato, kokotisa lokuta, moyibi, bongo na bongo, ezali komema bato na liwa. Tokanisa se ndenge makambo mazali kosalema to koleka na Esti ya Ekolo ya biso. Tozali koyoka mpe komona, kasi makambo mana matali biso te. Bato bakufa, bazoka, etali biso te. Koboma ekomi eloko ya liseki. Moto moko te alingi komipesa mpo ya koyeba ya solo ntina ya mpasi ya bandeko ba biso ya Esti ; bango kaka te, na baye banso bazali koboma bipai na bipai mpo ya lokoso ‘to moyibi ya mbongo, ya kokabola bato mpe kobotolo na mabele ma bango. Mbotama ekozala mbotama ya solo soki tondimi kosambela na butu boye (na mokolo mwa lelo) mpe tozwi mokano mwa kolongola baninga na mpasi, kopesa esengo na babola mpe na baye babwakemi, lokola bateyi to balakisi (ba enseignants) baye bazali na mpasi mikolo miye mpamba te, bazangi lifuta lya mosala mwa bango, nzokande bazali konyokwama mikolo minso mpo ya koyekolisa to kolakisa bana kotanga na kokoma. Mbotama ekozala mbotama soki o bisika ya mosala, bakonzi koyiba mbongo ya basali te. Mbotama ekozala mbotama soki yo policier to yo mama katoliko oyo batie o libongo mpo ya kokengele bato, soki yo okonyokolo mpe okobotolo lisusu biloko ya bamama bateki te ! 

Na mbotama, Nzambe akomi pene na moto. « Nzambe akomemela bato mwinda mpo ya kokimisa molili mpo ‘te angengele bato bafandi o molili mwa liwa mpe atambwisa biso o nzela ya boboto » (Lc 1, 79). Mbotama ekosenga na biso toyeba kotombola baye banso tomonaka lokola bazangi litomba na mokili. Tokanisa baye banso bazangi bisika bya kolala zambi mpela ya mbula oyo ezindisi ndako ya bango, baye bakima mboka mpo ya bitumba, bandeko ba biso bazali kobengana na bikolo bisusu, na baye banso batiki mabele to mboka ya bango mpo ya koboya mindondo na baninga. Nzambe, na Mwana Yezu, amemeli biso mwinda mpo tolinga ye mpe tolinga baninga. Ye azali mwinda moye mouti na Mwinda mpe mokokimisa molili mwa lisumu o kati ya biso mpe mpembeni na biso. Mbotama esengeli kosalisa biso, na nguya ya Mwana Yezu, toyeba komemela mwinda mwa Nzambe na bato baye bazali koluka ye na molili, na bosalisi bango mpe na boyebisi na bango ‘te Nzambe alingi biso bato tokoma lokola ye Nzambe. 

Bandeko ba bolingo, Nzambe ayei o kati ya biso. Lolenge kani biso toyambi ye o mitema mya biso? Soki mitema mya biso mizali peto, Nzambe azali solo na biso. Nzambe akosenga na biso toyamba Mwana wa ye, toyamba bato mpe tosalisa bango. Yango wana apesi biso lisanga mokili mpo tobatela mwango. Se ndenge tozali kopetola mitema, tosengeli mpe kopetola zingazinga ya biso. Nzambe akosepela te koya kokuta biso tozindi na mayi, na kati ya bosoto ya nkasa na milangi, nzela ebukana, ebebi mpo ya mabulu bisika binso, milinga, moi makasi mokozikisa, mpasi ndenge na ndenge. Ndenge nini tokoki koyamba Mwana Yezu soki tozangi mayele ma kobatela “ ndako ya biso banso”, mokili mwa biso? Ndenge nini tokozala na esengo solo soki mpo ya bopoto (negligence) ya biso, toyebi kobongisa bisika tofandi te ? 

Na mabota ma biso, soki mwana abotami, tokolukaka moto akokani na ye. Lelo tokoki koloba to komituna ‘te Mwana Yezu akokani na nani? Nalingi mokolo moko bato baloba ‘te elongi ya biso ekokani na oyo ya Mwana Yezu. Soki elongi ekoki kokokana na ye te, kasi mitema mikokana, mpo tomemela bato ba mokili boboto na esengo. Bato bakoyeba ‘te tozali bana ba Nzambe na ezaleli elamu tokomonisela bango. Na mbotama, tosengeli kozala nzela ya libiki mpo ya baninga, bato baye Nzambe azali kosalela mpo ‘te mokili mobimba mozwa libiki na misala mya bolingo mpe mya ngolu. Soki tosali boye, Nzambe oyo akomonana na miso te, bato bakomona ye o kati ya biso.

 Lokola Nzambe ayei kokabola mpasi na bisengo bya biso, tosala makasi tokoma pene na bandeko ba biso, mpo ‘te banso elongo tokabola boboto mpe esengo ya mbotama. Nzambe asali yango, biso mpe tosala bongo. Lokola bakengeli mpata bayambaki na esengo nsango ya mbotama, biso mpe tokoma bapanzi Nsango Elamu mpo na koyebisa na mokili mobimba ‘te : « Lelo Mobikisi abotami, nkembo na Nzambe o likolo, o nse boboto na bato ba motema molamu ». 

Na nsuka ya mobu moye mwa 2019 mpe awa tolingi kokota o mobu 2020, « Yezu azala mwinda mwa solo moye mokongengisa bato banso o mokili ». Na boyambi, tofungola mitema mpo ya koyamba Mwana Yezu, Emmanuel, Nzambe o kati ya biso, oyo azali komimonisa na bosawa mpe azali elikya na esengo ya biso mokolo na mokolo. Mama Santu Maria asambela mpo ya biso mpe asalisa biso toyeba kobikela malamu mobombamo mwa mbotama moye mokosala ‘te moto akoma elili ya Nzambe mpo ya seko. 
Na bino banso, na mabota ma bino, natombeli bino « Mbotama Elamu » mpe mobu mwa sika 2020 molamu, na losambo mpe bobenisi bwa ngai. 

Inongo, 23/12/2019
Mgr Donatien BAFUIDINSONI, SJ.
 Episkopo wa Inongo.

Aucun commentaire:

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj
31.03. 2018-

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm
(06.01.1954-12.06. 1967) + 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
(12.06. 1967-22.07. 2005) + 19.11.17

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm
27.07.2005-31.03. 2018

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO