MATEYA O PASIKA
2019
« Mpo nini bokoluka o kati ya bawa moto azali na
bomoi ?
Azali
awa te, asekwi » (Lk 24, 25)
1.
Na milulu mya mikolo misato mileki, toyoki mpe tomoni
ndenge nini Nzambe alakisi biso bolingo bwa ye.
Toyokaki mpe tomonaki ‘te Nzambe azali bolingo. O mokolo mwa minei mosantu, tomonaki bolingo
bwango o limpati lya nsuka ; o mwa mitano mosantu, na malozi ma ye, Yezu
amemaki bozito ya masumu ma biso tee o kuruse ; lelo, o butu boye bosantu,
tokokundola Pasika ya Mokonzi, pasika ya biso ntango Yezu akolongola biso o
boombo ya masumu, ntango akobikisa bino o liwa mpe akopesa biso bomoi. Liwa ebungi o kati ya bomoi. Yango wana, kosengeli lisusu koluka moto
azali na bomoi o kati ya bawa te. Azali
awa te, o kati ya lilita, lokolo o boloko ; Yezu asekwi.
2.
Manso mana mazali mpe makolakisa
bolingo. Tokomona yango o matangi ma lelo. Bolingo ekomonana uto libandela, ntango
Nzambe akelaki moto mpe apesaki ye mosala ya kobatela mokili. Kasi, moto abebisaki mpe azalaki na loboko te
liboso ya bolingo bwa Nzambe. Kasi nsima
mwa ntango, moto moko aponamaki mpo ya boyambi bwa ye na ntina ‘te azala
mokengeli wa bondeko bwa Nzambe na bato mpe ya baye bakoya nsima :
Abraham. Na botosi bwa, atikaki mboka ya
ye, se bongo bana bakokende o Ezipiti.
Nsima ya mibu miyike, bakonyokwama mpe bakokomisa bango baombo na ba
Ezipiti. Nzambe akotinda Moïse mpo ya
kobimisa bango o boombo na bokatisi mbu etane.
Tala ntina ya Pasika ya biso, mokolo moye, o mai ma batisimu, Mokonzi
abikisaki biso o boombo bwa masumu.
3.
« Yango wana tokanisa malamu : o kati ya nzoto
ya biso moto wa kala abakemi o kuruse elongo na Kristu, na ntina te nzoto ya
masumu ekufa, tozala baombo ba masumu lisusu te. Nzokande, soko tokufi na Kristu elongo
tokozwa mpe bomoi elongo na ye. Toyebi
te Kristu asekwi o liwa akoki kokufa lisusu te ; liwa likoki kosala ye
lisusu eloko te. … sikawa azali na
bomoi, azali mobimba na Nzambe. Bino
bobele bongo : mpo etali masumu, bozali bato basili bakufi ; mpo
etali Nzambe, bozali bato bazwi bomoi mpo ya Yezu Kristu » (Rm 6,
6.8.-11).
4.
Yango wana, tokoluka lisusu Moto azali na bomoi o kati ya
bawa te. Ye, azali na bomoi. Alingi biso mpe tozala na bomoi elongo na ye,
o kati ya batisimu, mpo ‘te tozala na bomoi bwa sika, lokola Kristu yemei, oyo
asekwi o bawa na nguya ya Nzambe Tata.
5.
Kozala na bomoi bwa sika elingi koloba kobaka moto wa
kala o kuruse, moto oyo azali moombo ya masumu.
Moto oyo abebisaki bondeko Nzambe akataki na ye, akomaki lokola mbanda
ya Nzambe, moto akowela bokonzi na Nzambe, moto oyo akosala maye alingi mpo
akanisi ‘te akokani na Nzambe. Moto oyo
akoboya kozala mokengeli, mobateli ya maye Nzambe akabeli ye ; moto oyo
akoboya kozala mokengeli, mobateli ya mozimi wa ye, wa ndeko wa ye. Moto oyo akoboya kokengela bikela bya Nzambe
awa o nse.
6.
O butu boye bosantu, bilembo mingi bikolakisa biso ‘te
Nzambe azali o kati ya biso. Lokola
« Mwinda » uto topelisaki kandela o ebandela ya milulu ya misa. Mwinda ekobengana molili o mokili, mingi mpenza
o kati ya mitema mya biso. O butu boye,
tondimi ya solo ‘te Kristu akogenge o bomoi bwa biso ? Tondimi ‘te azala
mwinda moye tokokabolana biso na biso bakristu mpo ‘te biso mpe tongengisa
bisika binso molili ya masumu mokobebisa ekolo ya biso ? Tondimi kozala mwinda moye mokepesa elikya o
bisika tofandi, o kati ya ekolo ya biso mpo ‘te toboya lokuta, moyibi, lokoso
ya biloko mpe bisengo bya nse ?
7.
Ya solo. Tokosepela
elongo na mampinga ma banzelu. Na nsai o
mitema, tondimi ‘te butu boye bosantu ekolongola, o mokili motondi na masumu,
baye batie elikya na bango na Kristu. O
butu boye, Kristu akongenge lokola moi.
O butu boye, mwinda moye mokengenge ekotondisa biso na esengo. Esengo ya biso, lokola mwinda tokokabolana
mpe ekozima te, ekozala o mitema mya biso seko soki tokokabola yango na bolingo
mpe lokola bolingo o kati ya bana ba Nzambe.
8.
Nsekwa ezali mbuma ya elikya, ya boyambi bwa biso engengisami
na mwinda mwa Nzambe :
·
Ntango inso tokopelisa, tokotia mwa mwinda ya elikya o
motema ya moto oyo bato banso bakobwaka, bakowangana, mpe akotungisama soki
butu eyindi ;
·
Ntango inso tokobuna etumba mpo ya moto oyo asali eloko
te mpe bamokangi lokola mobomi to moyibi ;
·
Ntango inso tobuna mpo na bosembo ya moto oyo bakoseli
likambo mpe bakomokanga mpamba ‘te zuzi moko andimi mosolo ya moto wa nkita,
mpo zuzi eye abangaka Nzambe te mpe moto te, mpe akotosaka mibeko ya ekolo ya
ye te ;
·
Ntango inso tokozala pene ya moto oyo bakonyokolo o
boloko ; ntango inso tokozala pene na moto akobele o lopitalo mpe bato
bakokende kotala ye te ;
·
Ntango inso tokozala elongo na moto molamu bakomonisa
mpasi mpo alobi se bosolo ;
·
Ntango inso tokozala pene na moto oyo bato banso baboyi,
bakokima mpo aboyi kolanda bitinda bizangi ntina biuti na baye bakonyokolo
bato ;
·
Ntango inso tokoyoka mongongo mpe tokolanda ndakisa ya Yezu
awa atiaki elikya na ye se na Nzambe mpe andimaki kokaba bomoi bwa ye mpo ‘te
bato banso bazwa bomoi bwa lobiko.
9.
Nsekwa ezali mbuma ya boyambi bwa biso engengisami na mwinda
mwa Nzambe. Ntina ena, tokoloba ‘te
Nsekwa ezali lokola bosembo bolongi mabe, lokola bosolo o boso ya lokuta, lokola
bolimbisi o boso bwa mafinga mpe bowangani, lokola esengo o boso ya mawa. Nsekwa ezali lokola mwinda mokobengana
molili, ezali lokola bolingo ekolonga etumba esika boyinani bozali, lokola
Bomoi liboso ya mabe to ya masumu maye makomema o liwa.
10.
Ya solo. Na esengo, tokoyemba ntango inso
« Alleluia ». Mpamba ‘te
tokoluka lisusu moto azali na bomoi o kati ya bawa te. Ye azali (na) bomoi bwa sika, bomoi bwa seko o
ntei ya Nzambe o bileko binso seko.
Na bino banso bozali awa mpe na mabota ma bino, na nsai o motema, natombeli
"Eyenga ya Pasika elamu", mpe napesi na banso bobenisi bwa ngai ;
Inongo, 20/04/ 2019
X Donatien BAFUIDINSONI, SJ.
Episkopo wa Inongo
Aucun commentaire:
Enregistrer un commentaire