mardi 25 décembre 2012

Mokanda mwa Episkopo o eleko ya Mbotama ( Lingala)


MBOTAMA 2012
Mokanda ona bandeko bakristu ya Diocèse ya Inongo

« Mwana Nzambe akomi ndeko ya biso bato ; abotami lokola mwana moke» ( Jn 1,14 ; Lc 2,7)

Bato batau mpe bato mpamba bazali na ntina monene mpo ya biso bakristu
Bandeko ba bolingo,

Eyenga elamu ya mbotama na bino banso !.

Na mobu moye mwa boyambi, awa tokosepela mbotama ya Yezu lokola mwana moke o kati ya biso bato, natombeli bino boboto mpe elikya oyo mbotama ya ye ememeli biso.Ye nde Liloba ya Nzambe mpo ya bato banso mpe bikelamo binso, lelo, lobi mpe o bileko na bileko (He 1, 1-3).
Yemei ayebisa biso na bozindo ntina nini ye mwana Nzambe andimi komikomisa mwana moke, moto mpamba! Yemei asalisa biso ‘te toyeba kokumisa, kolinga mpe kobatela bato ebele ya mokili ya biso batalami lokola bana mike mpo bakoki koloba te, kosala eloko te ata onyokoli bango! Yemei akomisa biso bato bazali kobunda etumba ya kotika nzela ya kovanda lisanga ndenge tozali sikawa. Toluka ndenge mosusu ya kotambola na bomoi, esika wapi topesi kilo na bomoi ya moto nyonso ya mokili oyo. Eyenga elamu ya Mbotama ya Mokonzi Yezu.
Bandeko ba bolingo,
Na Nsango Elamu ya Lukasi (2, 1-14) ekomami ‘te ntango Yezu abotami, ekolo ya ye ezalaki na maboko ya Mokonzi monene ya Roma nkombo César Auguste. Ekolo ya ye ezalaki na kati ya yango moko na bokabwani : bato basimbi mokili na baye bazanga, babola, lokola bakengeli mpata.
Yezu abotami kati ya babola, abotami mobola (Lc 2,7). Kobanda mbotama ya ye tee liwa ya ye o kuruse, kati ya babomi babale (Lc 23,33), Yezu andimi, mpo ya bolingo, komikotisa na molongo ya bato mpamba. Ezala na maloba, ezala na misala mpe na ndenge ya ye ya kozala, Yezu amonisi polele ‘te Nzambe ye ayei kosakola mpe komonisa na bato, azali liboso liboso Nzambe ya bato batau, Nzambe ya babola, ya bato mpamba, Nzambe ya baye bazali lokola bana bake, bayebi koloba te, bazali na nguya ya komibikisa te. Azali Nzambe te ya bato bamitiyi likolo ya baninga bato ; Nzambe ya biso alingi bato mingi, alingi moto nyonso mpe maye manso matali moto. Mpo ya Nzambe ya biso, moto moko te azali moto abungama, moto azanga ntina.
  .Awa andimi kobotama lokola mwana moke, Yezu ayei komonisa elongi ya solo ya Nzambe ya biso: Nzambe ya solo oyo azali ndeko ya babola, ndeko ya bato batau…..Nzambe ya biso azali nde nani mpo alingi biso, bana ya Adamo, ndenge wana?! Ya solo, ebongi mpenza topesa ye nkembo mpe lokumu mpo ya bolingo bonene alingi biso. Yemei afungola biso mitema mpo’te nguya ya bolingo ye apesi biso (Rm 5,5) emema biso mokolo na mokolo na nzela ya misala mikosepelisa ye.
            Bandeko ba bolibgo,
Kosepela eyenga ya Mbotama ezali mpe kondima Nsango Elamu ya lokumu mpe “valeur” Nzambe apesi bato mpamba ya mboka ya biso, ya ekolo ya biso. Bazali ebele: toyebi yango. Nzambe ayei, na kati ya mwana ya ye  Yezu, kobuka mobulu ya bato bazali kokosa biso, kokotisa bitumba mpo ya kokabola biso na makambo ndenge na ndenge. Ayei kovandisa na mesa moko mwasi na mobali, moto moindu na mondele, mobola na moto ya nkita, musulman na mokristu, moto ayebi kotanga te na moto ya mayele mingi.
Kosepela Mbotama ezali bongo kopesa kilo na bato babwakama ya mboka ya biso, ya mabota ma biso, ya kelasi ya biso, ya bisika ya biso ya mosala. Kopesa bango kilo, kolinga bango mpe kobatela bango. Tokanisa mingi mpenza na bandeko bazali na bitumba na Kivu (Nord et Sud Kivu). Lokoso ya mbongo oyo tokomisi « nzambe » ya biso ezali koboma biso. Na nkombo ya boyambi ya biso, tokoki kondima te makambo mazali koleka na Esti ya Ekolo ya biso.
Nakosenga ‘te na feti eye ya Mbotama to ya mobu mwa sika, paroisse moko moko esala feti mpo ya bandeko baye tosalaka bango feti te (bana bitike, bamama mpe batata batikala bango mongo, bato ya boloko, ba handicapés…).

Bandeko ba bolingo,
Na mokili ya biso lelo, lokola na mokili mobimba, tosengeli na bato bayebi kosangisa baninga, koluka na molende bomoko. Tokokota na nzela wana soko tobandi kolanda nzela Yezu alandaki: kopesa bato batau mpe bato babwakana esika ya bango na société mpe na Eklezya. Esika yango ezali esika ya liboso!. Ezali ndenge boyambi ya biso bozali kosenga biso. Ezali etumba mpo ya biso bakristu ya komema mokolo na mokolo mpo ‘te mokili mobimba mokola ndenge motema ya Nzambe molingi.
Maria, Mama wa boyambi (LC 1, 45) asambela mpo ya biso mpo’te tokola na kati ya boyambi na Nzambe oyo aponoko bato batau, akitisaka bato ba nkita mpe atombolaka bato mpamba (Lc 1, 52).
Mokonzi angengisa biso bilongi na bolingo bwa ye, mobu moye mwa sika 2013 mobimba. Akomisa biso na nguya ya bolingo bwa ye, bato bakangami makasi na bandeko batau mpo bato banso ya mokili bakoma bandeko. Nzambe abenisa biso; abenisa mpe baye banso tosangani na bango lokola bandeko bana ba libota lyoko.  Amen!

+ Philippe NKIERE KENA                                                                                     .                 ..
Evêque d'Inongo
Inongo, Mwa le 24 décembre 2012

Aucun commentaire:

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj
31.03. 2018-

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm
(06.01.1954-12.06. 1967) + 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
(12.06. 1967-22.07. 2005) + 19.11.17

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm
27.07.2005-31.03. 2018

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO