DIOCESE D'INONGO
Tobima o molili, ntongo ya Nzambe esi etani...
Bandeko ba bolingo,
Ntango nazali kokomela bino mokanda moye, nazali kokanisa na makambo ebele makwelaki biso, makambo ma esengo lokola makambo ma mpasi. Mokolo akabela moko moko ya bino boboto mpe nguya ya bolingo.
" Bato bazalaki kotambola o molili ... " ntango mosakoli Izaya azali kokomela maloba maye, azalaki kokanisa na bandeko ya mokili mwa Zabulon na Nephtalie. Mokili moye mokokoma nsima Galilea ( Mt. 4, 15). Bandeko ba mokili mona bamemaki bango na bowumbu na Babilonia. Kuna bazalaki solo Baumbu, bapaya , banyokwamaki mingi. Bazalaki soko na kati ya butu, butu ya mpasi , butu ya mawa , butu ya bonyatami.
" Bato bazalaki kotambola o molili bamoni mwanida...." , mosakoli Izaya ayebisi bango 'te "Bobanga te; na kati ya butu oyo ya mpasi, bozali bino moko te. Nzambe oyo abikisaki bankoko ba bino na boumbu bwa Ezipeti, akobikisa bino mpe akolongisa bino lokola Gedeon alongaki ba Madian (Is. 9,3). Elembo yango oyo: " Baboteli bino mwana moko, bapesi bino mwana mobali, Emanuele ( Nzambe azali na biso). Bokonzi bozali o mapeka ma ye" ( Is 9,5).
Bandeko ba bolingo,
Lokola boyebi, na diocèse ya biso, na Inongo, towuti kozwa likama linene na ebale ya biso ya Lac. Bato bakufi ata nkama moko. Esalemi le 25 Novembre 2009..... toyebi mpe boni bitumba bizali kokoba naino na ekolo ya biso..... toyebi boni ebele ya bato bazali konyokwama na maladie na nzala, na boloko, bozangi misala to kelasi....tozali biso mpe kotambola o molili. Ebele o kati ya biso tolembi mpe tozali komituna soko solo tokobima na butu boye bozingi biso.
Bandeko ba bolingo,
Likambo lizali kopesa ngai elikya mpe esengo makasi lizali ya koyeba 'te molili mwa biso mokosila solo. Mpo nini? Mpo na kati ya butu ya biso Nzambe atindeli biso mwana wa ye. Akomisi ye moko ya biso mpo 'te amema mwinda monene o kati ya mokili ya biso. Ye azali mwanda : "Mwinda mwa solo moyei o nse kongengele bato banso"( Jn 1,5). Oyo nde mbotama. Mwana Nzambe ye moko ayei komikotisa o molongo mwa biso bato mpo atambola na biso, mpo abimisa biso na molili.
Bandeko,
Mbotema ezali solo likabo monene mpe mosala mpo ya moko moko ya biso. Ata ozali na kati ya mpasi to mawa to lisumu ndenge nini, yeba 'te Nzambe alingi kobimsa yo. Yango wana ndeko, bima na molili mwa yo, kota na feti ya moyi ya Nzambe. Yo mpe sala manso ndeko, mpo baninga babima na molili na bolingo bwa yo.
Bandeko ba bolingo,
Mobu moye eklezya ya Nzambe oyo ezali o Kongo ekosenga 'te tokanisa na mbula ntuku mitano ya indépendance ya ekolo ya biso. Topesa Ye merci mpo Ye moko akambi biso na kati ya makambo ndenge na ndenge. Ye asalisi biso mpo tokabwana te: ekolo etikala moko. Kasi Mokonzi akosenga biso mpe 'te tobima mpe tobimisa baninga bato na molili mozipi biso. Totika baninga te na kati ya butu ya mawa mpe ya bonyokwami.
Mobu mokoya tokokanisa mbula nkama moko ya liloba na paroisse Sainte Croix ya Bokoro. Ezali bobele likambo etali Bokoro te. Etali biso banso. Nzambe azwa lokumu mpe amonisa biso banso 'te nguya ya liloba lya ye lya bolingi eleki nyonso.
Afrika mobimba ewuti kosepela mbala ya ibale, lisanga lya ba episkopo ( Synode) oyo mpe ezali lilongi ( victoire) . Ata na kati ya molili batiyi Africa mpe tomitiyi biso moko, bosembo, bolimbisani mpe boboto bozali lokola mwinda mokopela o butu bwa biso. Mwinda yango nde mwana Nzambe oyo azali o kati ya biso: Emanuele, Yezu " Bolingo ya Nzambe mpo ya mokili". Bobele bolingi bwa solo bokobimisa biso na molili mpe na butu...
Bandeko ba bolingo,
Nalingi kosukisa mokanda moye na mwa lisolo. Mokolo moko moteyi moko ( Rabbi) epayi ya bayuda atuni bayekoli baye boye: " Na ntango nini tokoki koloba 'te butu esili mpe ntongo ebandi kotana?"
- Moyekoli moko alobi : " ezali ntango obandi komona 'te nzete ya manga na ya safu ekeseni. Moteyi alobi: te, ozwi te.
- Moyekoli mosusu alobi: " Ezali ntango obandi komona 'te nyama oyo ezali koya liboso na yo ezali ntaba to meme. Moteyi azongisi: te, mwana, ozwi mpe te. Bana batikali nye. Yango wana moteyi alobi ye moko: "tokoki koloba 'te butu esili mpe ntongo ebandi kotana ntango obandi komona na elongi ya moninga moto elongi ya ndeko ya yo. Soki te ozali naino na butu....
Moto azali na matoyi ya koyoka ayoka.
Eyenga elamo ya mbotama na bino banso.
Nabenisa bino o nkombo ya Mokonzi.
Wa bino Tata Episkopo,
+ Philippe Nkiere Kena
Episkopo wa Inongo.
Inongo, mwa 17 Decembre 2009
MOKANDA MWA MBOTAMA 2009
" BATO BAZALAKI KOTAMBOLA O MOLILI BAMONI MWINDA MONENE " ( Is. 9, 1)

1 commentaire:
ITA Buon Natale!
EST Rõõmsaid Jõulupühi!
Merry Christmas and Best Wishes to You and to Your Visitors! I arrived here just surfing. I hope Your Today will be all the time better than Yesterday and worse than Tomorrow!
An Estonian living in Italy
Enregistrer un commentaire