Maloba o na bakristu ba diocèse ya Inongo
mpe na bato ba motema molamu
Na bomoi bwa bino, botiya bolingo liboso lya biloko binso; boboto bwa Kristu oyo asekwi botonda o mitema mya bino (Kol 3, 14-15).
Tozala bato ba
bulubulu te !
Maloba
o na bakristu ba diocèse ya Inongo mpe na bato ba motema molamu
Na
bomoi bwa bino, botiya bolingo liboso lya biloko binso ; boboto bwa Kristu
oyo asekwi botonda o mitema mya bino (Kol 3, 14-15).
1.
Eleki mwa mibu, toyambaki na esengo nsango bokeli ba province
bisusu o kati ya ekolo ya biso. Toyebi ‘te mokano mona mozali libaku lilamu mpo
ya botomboli province ya biso ya Maï-Ndombe, mpamba ‘te tozali na nkita ebele
oyo ekoki kobongisa bomoi bwa biso. Tozali na bato ebele, tozali na mayi, zamba
kitoko, mbisi ndenge na ndenge na nkita isusu.
2.
Soki tosalelaka nkita ina inso bo ebongi, mbele bomoi bwa
biso bosilaki kobonga. Kasi tozali komona ‘te bayipolitiki, na esika ‘te basala
mosala mpo ya kotombola province ya biso, bazali kolekisa ntango na koswana
bango na bango.
3.
Nzoka nde bomoi bwa biso na Maï-ndombe bozali se
kobeba : ndako ya malonga ezali te, misala mizali te, mayi ya komela ya malamu
ezali te, mwinda ezali te, kelasi to université ya malonga ezali te. Uto Mai-Ndombe
ekoma province, batongi ata ndako ya moke mpo ya babeli te (centre de santé).
Maï-Ndombe ezali na zamba, mabaya ezali ebele, kasi ezali nsoni komona ‘te bana
mingi bazali kotanga na biteyelo bisalemi na nsese na ndele, mpe kofanda o
mabele.
4.
Tosengeli mpe koyeba ‘te Maï-Ndombe esuki se awa na Inongo
te. Bokende na Kiri, Beronge, Yuki, Ntandembelo, Bongimba, Oshwe, Mushie,
Makaw, Nkaw, Baonzow, Semendwa, Sontin, Yumbi mpe bisika misusu mpo boyeba ya
solo lolenge province ya biso ezali. Soki bokomi na bisika bina, bokomona ‘te
bayipolitiki bazali kokosa biso na esika ‘te basala mosala mpo ya kotombola province
ya biso oyo etondi na nkita Nzambe apesi biso.
5.
Banda bandaki mosala, bayipolitiki bazali kolekisa ntango na
maloba ma lokuta, koluka mosolo mpo ya bango moko mpe bandeko ba bango ;
bazali kowela bokonzi, kozwa « madesu ya bana » (corruption) ya baye
balingi kokamata province mobimba lokola eloko ya libota lya bango, to kokomisa
bato banso lokola baombo ba bango. Yango wana tosengeli komituna soki ya solo
nani aponaki bango mpo baloba ‘te bazali koluka bolamu bwa bato banso.
6.
Na mikolo miye, mingi mpenza awa na Inongo, tozali komona ‘te
kimya ezali te, bato bakabwani mpo ya
maloba booko bandeko. Bazali kowela bokonzi mpe koluka ‘te bato bakumisa bango.
Soki tokebi te, mobulu mokoki kobima na mikolo mikoya. Toboyi makambo maye
masalemaki na Yumbi na 2018 makomela biso awa.
7.
Yango wana, lokola Episkopo mpe mokengeli mpata, nalingi
kobenda bino matoyi, koyebisa na bana ba Maï-Ndombe banso, moko moko na esika
azali, atelema mpo ‘te mbongwana ya solo ekota na lolenge ya kosalela nkita ya
province ya biso mpe ya kokamba mboka.
8.
Nazali kosenga na bandeko ya Maï-Ndombe batikala na bomoko
mpe bafungola miso mpo ‘te moto moko akosa bango te na maloba makokabola mpe
koluka province ya biso ekoba kozonga nsima. « Tozali biso banso
bandeko », lokola Papa François akoloba na mokanda mwa « Tozali banso
bandeko » (Fratelli tutti). Bolanda maloba ma lokuta te. Boluka koyeba
makambo ma solo maye matali province ya biso.
9.
Bayipolikiti bazwa bilenge na kilo, batosa bango mpe basalisa
bango bayeba malamu lolenge ya kotonga provinve ya biso, mpamba ‘te, baleki
ndeke na motuya (Lk 12, 7). Bakoki kosomba bino na mwa molangi ya masanga to
mwa mosolo mozangi ntina, moye bakosomba na yango mwa mopiko ya ndakala.
Nakosenga na bayipolitiki batika kotiya bulubulu na mitu ya bato, batika mpe
maloba ma lokuta maye makotonga mboka te.
10. Banso basala mosala lisanga
na boyokani mpe na bosolo mpo ya bolamu bwa bato banso. Bakosa bato te, kasi baluka
kotiya boboto mpe basalela nzela ya bwanya mpo ya kobongisa kokoso ekoki kozala
na mosala. Banso baluka liboso bolamu bwa province, na bosolo kasi na boweli
mosolo te (Mt 6, 24 ; 1 Tim 6, 10).
Bayipolitiki bayeba ‘te na nsuka ya mosala mwa bango, tokotuna bango
nini basali lisanga mpo ya province, kasi tokotuna te soki bayaki kosalela bato
batindaki bango awa mpe bazali kokonza bango na mosika.
11. Baye basengeli kobatela bato
na biloko bya bango mpe biloko bya ekolo basala mosala mwa bango na lokobo, kasi
na bomipesi na booko bato te mpe balanda se mobeko mwa ekolo. Baye bakopesa
nsango na maloba (na radio) to na nzela ya mopepe batika maloba maye makomema
bato na bokabwani mpe na bokotisi mobulu, kasi bapesa nsango ekosalisa bato
bazala na boboto, balingana, basala mosala mpo ‘te totombola province ya biso
oyo ezali kotikali nsima mingi.
12. Nazali kosenga na bakonzi ba
ekolo batinda bato baya kotala lolenge bakonzi ya province ya biso bazali
kosalela nkita na misolo mya biso, mingi mpenza na IGF (Inspection Générale de
Finance), mpo ‘te balanda ya solo mibeko, nkita ezala ya solo mpo ya bolamu bwa
bato banso mpe tozala ya solo na ekolo oyo ekotosa mibeko (Etat de droit).
Bakonzi ba ekolo ya biso mpe ya province ya biso basala makasi, baluka mpo ya
province ya biso misala (projets) miye mikosala ‘te Maï-Ndombe efungwama mpe
elongwa na molili moye mokoki koumela, soki tokebi te.
13. Boboto bwa Kristu oyo asekwi
bobongola ezaleli ya biso ya mokolo na mokolo mpe ekolisa bondeko na bomoko o
kati ya biso mpo ‘te biso banso tobikela malamu. Na elikya ‘te mikolo mikoya
mikozala malamu, tokimisa bobangi, bokabwani mpe totonga lisanga province ya
biso. Tozala lokola bato bakosala mosala se mpo ya mosolo te, kasi tozala
bakengeli balamu ba mpata, baye bakoki kobaka bomoi bwa bango mpo ya baninga (Jn
10, 1-13), na bosali bolamu mpo ya bomoi bwa lobiko (Jn 6, 27).
14. Ngondo Mosantu Maria, Mama wa boboto, asambela mpo ya biso mpe azwela biso epayi ya ya Mwana wa ye Yezu Kristu ngrasya ya kozala bato balingi boboto na esengo mpo ‘te toyeba ‘te biso banso tozali bandeko mpo ya lokumu la Nzambe. Na mokolo moye tozali kosepela eyanga ya Santu Yozefu Mosali, tolanda ndakisa ya ye. Na mitema milamu, tosala misala mya biso mpo ya lokumu la Nzambe kasi la bato te, tosala misala mpo ya bolamu bwa bato banso mpo ‘te totonga mboka mpe tolengele malamu bomoi bwa biso mpe ya baye bakoya nsima ya biso.
Boboto bwa Mokonzi bozala na moko moko wa bino, na mabota ma bino mpe na bino banso, na bobenisi bwa ngai.
O nkombo ya Tata, mpe ya Mwana, mpe ya Elimo Santu. Amen
Inongo, o eyenga ya Santu
Yozefu, 01/05/2021
+ Donatien Bafuidinsoni SJ
Episkopo ya Inongo
Aucun commentaire:
Enregistrer un commentaire