jeudi 24 décembre 2020

Mokanda mwa Mbotama 2020 mwa Tata Episkopo

 

Matangi :

Misa ma Butu : Is 9, 1-6 ; Tt 2, 11-14 ; Lk 2, 1-14

Misa ma Moyi : Is 52, 7-10; Eb 1, 1-6; Jn 1, 1-18

Bandeko Boboto!

Ndenge nini tokoki kosepela mbotama soki mokili mozali na kimya te?

1.       Na mobu moye 2020, tomoni bisengo na mpasi ndenge na ndenge. Na Ekolo ya biso, tomoni makambo ndenge na ndenge epayi ya bayipolitiki oyo esali ‘te lelo toyebi lisusu nzela tozali kokende te. Na mokili mobimba, bokono bwa coronavirus bozali se kokoba mpe bosali ‘te mimesemo mya biso mingi mibongwana. Ata bato basusu bazali kondima bokono mwango mpenza te, kasi tozali komona ya solo ‘te mokili na ekolo ya biso ezali kobunda na mpasi. Tokomoni lokola bato bazali o molili, esengo na boboto  bosili o mitema mya bato. Tokomi lokola bato bazali kotepa tepa o kati ya etima (to lac) mpo ya mbonge makasi mpe bayebi nini bakoki kosala te. Ndenge nini tokoki kosepela mbotama na esengo mpe na boboto soki esengo na boboto bozali lisusu o mitema mya biso te ? Boni boni tokoki kosepela mbotama soki na mokili toyebi lisusu nzela ya kokende te ?

2.       Mobu 2020 mosili na mpasi mpe tozali kosepela mbotama se na lolenge wana. Mikanda misantu mya butu bwa lelo mpe mya lobi na moyi mizali kopesa biso elikya na Nzambe, elikya eye Mwana Yezu amemeli biso awa akotisi mwinda o mokili.

3.       Bato bazalaki kotambola o molili bamoni mwinda monene mpe motondisi bango na esengo, nkembo ya Nzambe emonani mpo ‘te bato banso bazala na boboto, na esengo mpe na bosembo.

4.       Na mokili mwa Yudea, na mboka moke, Beteleme, mwana abotami. Mbotama ya ye esali ‘te mokili mobimba mozwa libiki, mpamba ‘te mbotama ya Yezu esangisi likolo na nse. Mobombamo moye mozali ntina ya boyambi bwa biso. Awa Mwana wa Nzambe akomi moto, bato bakomi pene na Nzambe. Butu bwa lelo bokomi butu bosantu.

5.       Mwana moke oyo abotamaki, abotami lisusu lelo. Esika bato balembi kotia boboto, bosembo, Nzambe akabeli biso Mwana wa ye lokola “Nkumu wa bwanya (to mopesi malako kitoko) mpe Mokonzi wa boboto”; Yezu  azali elili ya “Nzambe wa bokasi bonso”mpe wa “Tata wa lobiko” mpo ya bato bakobunda na minyoko mpe na boombo, kasi bazwi libiki lya solo mpe makila ma bango makotanga lisusu te.

6.       “Mwana moko abotami, bapesi biso mwana mobali”. Ye azali elembo ya bolingi bwa Nzambe mpo ya bato. Nzambe andimi kofanda o kati ya biso mpe kolakisa biso nzela, kolakisa bisondenge tosengeli kotambola mpo ‘te tozala na esengo mpe na boboto. Esengo tozali koluka mpe kosenga mpo ya mokili, mpo ya ekolo mpe mabota ma biso, tokozwa yango se na Nzambe, soki tondimi komikitisa mpo ya koluka kokutana na Nzambe esika ye Azali, lokola esika Mwana wa Ye abotami, o elielo ya bibwele.

Bandeko Boboto,

Nzambe azali kozela biso o Beteleme

7.       Bakengeli mpata bayei koyeba Mwana Yezu mpamba ‘te bayokaki maloba ma banzelu, bantoma ba Nzambe. Lokola bango, tofungola mitema mya biso mpe toyoka mongongo mwa Nzambe oyo azali kolobela biso. Lokola bango, tofungola miso mpe tolanda nzela ya bango mpo tokende na Beteleme kotala Mwana, Emmanuel, Nzambe o kati ya biso. Lelo lisusu Nzambe akotinda bantoma ba ye mpo ya komema biso na beteleme, mpo ya koyeba lisusu Mwana wa ye oyo abotomi na bobola bonso, lokola bato bazangi bisika o kati ya mboka to o mitema mya biso. Lokola bango, Nzambe akomisi biso bantoma ba ye mpo ya kosakola Liloba lya Nzambe o mokili mobimba, kotalisa na baninga elielo wapi esika Mwana Yezu abotami.

8.       Na mbotama, Nzambe alingi tozala lokola bakengeli mpata baye bayokaki nsango ya esengo ya mbotama mpe bakei kosakola yango na baninga. Mbotama emonisi biso ‘te nkembo ya Nzambe ezali komonana na makambo ya mike: awa Nzambe akomi moto, amimonisi na bobola bonso mpo ya kolakisa na bato ‘te binso bikoleka. Nzambe andimi kokoma moto, kobotamao ndako ezangi nkita, mosika na biloko bato ba mokili bakowelaka. Mpo ya kosepela mbotama malamu, tosengeli kotika kolula biloko bya mokili biye bikoleka mpe kokangema na Nzambe mpo tokoma bana ba ye. Mbotama ezali kotalisa malamu ‘te Nzambe ayei o kati ya biso lokola mobola. Tosengeli kozala na motema bobola mpo ya koyeba Nzambe mpe kokumisa ye malamu, esika ‘te tokangema na biloko bya nse, esika ‘te totia elikya na biloko bya mokili.  Tokumisa bobele Nzambe, esika ‘te tokumisa bato ba nse baye bakokanisa ‘te bakokani na nzambe mpo ya nkita ya bango. Bato ba nse baye batondi na lolendo, bakotombola mapeka, bakomimonisa (o ngai), bakolinga ‘te bato bakumisa bango (o ngai député, ngai ministre, …),esika ‘te bayeba komikitisa,  kotambola na boboto mpe na bosembo mpo ‘te esengo ya solo ekota o mitema mya biso mpe o ekolo ya biso.

9.       Mimesamo mikosenga ‘te tosepela mbotama o mabota mpe banso basepela lisanga o kati ya mabota. Yango wana, tokomisa mboka, mabota ma biso Beteleme, esika Nzambe akozela biso mpo tosangana na ye.Tokomisa mitema mya biso elielo, esika Mwana Yezu akobotama mpo ‘te boyei bwa ye bomemela biso esengo ya solo.

Bandeko boboto,

Na Mbotama, esengo ekopesa boboto mpe boboto bokobota esengo

10.   Na butu boye, Nzambe akoloba na biso: « Bobanga te, zambi nayeli bino nsango eneneekosepelisa ekolo mobimba » ;« … baboteli bino Mobikisi. Bokokuta mwana abotami sika bazingi ye na bilamaba, alali o elielo ya bibwele ». Maye anzelu Gabriel asakolaki na Maria makokisami. Mwana okobota akozala mokonzi monene, bakobenga ye Mwana wa Nta-likolo, akozala mosantu, bakobenga ye Mwana wa Nzambe. Nsango Elamu eye ememeli biso esengo na boboto o kati ya mokili. Na mbotama, tosengeli kozala na esengo mpamba ‘te Mwana wa Nzambe akomi o kati ya biso. Mbotama ekopesa esengo o mitema, esengo oyo ata mpasi, ata coronavirus, ata liwa, ata bakonzi ba nse bakoki kolongola o mitema mya biso te. Mbotama ekotondisa mitema mya biso na esengo, esengo eye ekolendisa mpe ekopesa makasi mpamba ‘te tozwi libiki lya Nzambe.

11.   Poso minei mobimba, tomilengeli mpo ya kosepela mobombamo moye na boyambi mpe na botosi bonso. Maria na Yozefu mpe balengelaki boyei bwa Mwana Yezu. Soki tomanyoli malamu lolenge batambolaki kobanda Nazareth tee Beteleme, tokomona ‘te tosengeli kozala na motema bosawa mpo ya koyamba malamu mbotama ya Mwana wa Nzambe, oyo abotami o elielo ya bibwele zambi esika ezalaki te o ndako ya bampaya. Kobanda Nazareth tee Beteleme, mwinda mwa boyambi mokambi Maria na Yozefu mpe Liloba lya Nzambe,oyo akomi moto mpe azali Mwinda,akongengele bango lokola akongengele baye banso bandimi kokoma bana ba Nzambe.

12.   Elongo na bakengeli mpata mpe banzelu, eyenga ya mbotama esalisa biso tokoma bakengeli mpe bantoma ba boboto, bato baye, na ezaleli ya bango ya malamu, bayebi kotia boboto o esika bazali, mpo ya kopesa esengo na babeli, kobondo bato ba mawa mpe kopesa elikya na bato bazali o boloko. Elongo na bakengeli mpata mpe elongo na banzelu, tofungola mitema mya biso mpo ya koyamba bampaya, mpo ya kokabela bato bazangi. Nazali kokanisa esengo bandeko ba paroisses ya Semendwa, Makaw, Bokoro na Nioki bazalaki na yango mpo ya koyamba ngai na baye bazalaki na ngai na mobembo moye nauti kosala. Esengo ena ezali mpe esengo na boboto bwa mbotama oyo esengeli kosalisa biso totonga Eklezya mpe diocèse ya biso.

13.   Elongo na Maria na Yozefu, elongo na bakengeli mpata mpe banzelu, elongo na mampinga ma likolo, tosakola nkembo ya Nzambe emonani na Mwana Yezu : « Nkembo na Nzambe o likolo, mpe o nse boboto na bato ba ye ba bolingo ». Esengo na Boboto bwa mbotama bozala o mitema mya biso mpe boumela na bino seko. Mbotama elamu na bino bansompe na mabota ma bino.  Na bobenisi bwa ngai, natombeli bino mobu 2021 molamu, o nkombo ya Tata, mpe Mwana mpe ya Elimo Santu. Amen.

Inongo, mwa 24/12/2020

+ Mgr Donatien BAFUIDINSONI, SJ.

Episkopo wa Inongo

Aucun commentaire:

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj
31.03. 2018-

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm
(06.01.1954-12.06. 1967) + 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
(12.06. 1967-22.07. 2005) + 19.11.17

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm
27.07.2005-31.03. 2018

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO