dimanche 22 septembre 2019

Mokanda mwa Tata Episkopo



ANNEE PASTORALE 2019-2020

« Mokonzi, lendisa boyambi bwa biso ! » (Lc 17, 5)
Maloba ma bomanyoli mpo ya mobu moye ya mosala o eklezya mawuti na bosengi bapostolo basengi na Yezu na Luka 17, 5.
Totala lolenge kani bapostolo batuni motuna mwango. Na eteni ya 16 (zomi na motoba), Yezu azali kopesa lisolo ya moto wa nkita na Lazaro. Toyebi banso boniboni lisolo lina lisukaka: “ Abarama akoloba na moto wa nkita: soko balingi koyoka Moze na bapostolo te, bakondima mpe moto oyo asekwi o bawa te”  (Lk 16, 31).
Na ebandeli ya eteni ya liloba lya Nzambe oyo, Yezu akopesa mateya makopekisa kopesa bisimbisi na bana bake, na babola ‘to mpe na baye banso balenda na boyambi te, mpe akosenga tolimbisa mbala inso bakosala biso mabe. Mwa mosika, Yezu akopesa lisolo ya bato zomi ya maba abikisaki. Se moko o kati ya bango azongi kokumisa Nzambe mpo ya kotondo ye botondi. Yango wana Yezu alobi na ye : “ Teleme, kende, boyambi bwa yo bobikisi yo”. Moto wana azalaki mosamaritano (Lk 17, 12-19).
Ezala lisolo ya moto wa nkita ‘to ya bato zomi bazalaki na maba, na mateya mana manso, Mokonzi Yezu akosenga na biso tokolisa boyambi na Nzambe mpe na  Yezu yemei, Mwana wa Nzambe. Mikanda misantu mikoloba ‘te soki boyambi bwa biso bozalaka lokola mbuma ya sénevé (dongodongo), mbele tokokaki koloba na nzete ‘to ngomba emipikola mpe ekosalema. Wana nde boyambi bayekoli basengi na Yezu alendisa mpo ya bango, mpo tozala baye bakopesaka bisimbisi na bana bake te, kasi tosalisa bango bakoma penepene na Nzambe, bayeba ye, balinga mpe basalela ye.
O mobu moye, nakosenga na bino, nakosenga na biso banso tosambela mpo ‘te Nzambe alendisa boyambi bwa biso. Mbala mingi awa tomitunaka tokolia nini, tokolata nini, liboso ya mbonge to mikakatano ya mokili, Mokonzi Yezu akolobaka na biso: “ mpo nini bozali kobanga, bino bato ba boyambi botau, moto wa boyambi boke, mpo nini otiaki ntembe? (Mt 6, 30; 8,26; 14,31; 16, 6). Na bopaleli boye bwa  Yezu, tosengeli se kosenga na Nzambe: “ Mokonzi, lendisa boyambi bwa biso”.
Bosengi boye bozali kotalisa litomba bapostolo bazali kopesa na likambo ya boyambi. Ya solo, boyambi bozali litomba mingi mpo ya biso bakristu. Soki boyambi o Kristu bozali te, mokristu akozala te, eklezia mpe ekozala te. Yango wana, mokristu moko moko, lokola bapostolo, asengeli komipesa mpo ‘te boyambi bwa ye bolenda.
Tosengeli koyeba ‘te na Nsango Elamu, boyambi bozali eloko ya liboso mokristu asengeli kozala na yango  na bomoi bwa ye. Liboso ‘te Yezu asala likamwisi, abandaki liboso kotala boyambi bwa moto. Yango wana akotuna bato ba lolanda: “ bondimi ‘te nakoki kosala bongo?”(Mt 9, 28); akoloba na Maria, ndeko wa Lazaro : “ soko ozali na boyambi, okomono nkembo ya Nzambe” ( Jn 11, 40). Eteni ya 11 (zomi na moko) ya mokanda na ba-Ebrei ezali kopesa ndakisa ya boyambi bwa basaleli banene ba Nzambe lokola Nowe , Abarama na Moze. O kati ya biso, soki totali bomoi ya basantu na bamartiro lokola Anuarite na Bakanja, tokomona ‘te bazalaki bato ba boyambi bonene. “ Manso makoki kosalema mpo ya moto wa boyambi”, lokola Yezu akoloba na tata wa mwana akangemi na elimo ebe. Se na ntango tata wa mwana agangi : “ Nayambi, kasi salisa ngai, moto wa boyambi boke”, mbala moko mwana wa ye abiki.
Kasi tomituna: boyambi bozali mpenza nini? Ndimbola ya sikisiki epesami na mokanda na ba-Ebrei: “ koyamba ezali koyeba solo ‘te tokozwa bolamu boye tozali kolikya, mpe koyeba ‘te bolamu boye bozali solo, ata tokoki komono bwango te” (Eb. 11, 1). Tokoki mpe koloba ‘te boyambi bozali lolenge ya komipesa mobimba na Yezu, Mwana wa Nzambe ; ezali kondima Nzambe lokola Tata wa biso, koyeba Yezu lokola mwana wa ye mpe kosala ‘te Elimo akamba biso. Wana, tokomona ‘te boyambi ezali kotalisa ezaleli ya  mokristu, lokola moto ayambi Nzambe. ‘To mpe, tokoloba ‘te boyambi bozali lolenge ya kondima Yezu lokola Mobikisi se moko, oyo akopesa litomba na bomoi bwa ngai, ye  azali ebandeli mpe nsuka ya bomoi bwa ngai.
Ndenge nini tosengeli kosala ‘te tozala na boyambi mpe tolendisa bwango? Boyambi bozali liboso likabo Nzambe akopesa na moto. Boyambi bokosenga na moto afungwama mpe ayeba koyamba bwango. Tokozwa boyambi na losambo, yango nde ntina ya bosengi bwa bapostolo: “ Mokonzi, lendisa boyambi bwa biso”. Na mobu moye mwa boyambi, tosengeli kosenga na Nzambe ‘te apesa biso boyambi. Se lokola tata wa mwana akangemi na elimo ebe abandaki kobenga Yezu, biso mpe tosengeli koganga epayi ya Mokonzi boye: “ Nandimi, Mokonzi, kasi salisa ngai moto wa boyambi boke” ( Mk 9, 24).
Bandeko, boyambi mpe bosengeli na bilei. Bilei bya liboso bozali losambo. Nsima ya losambo, koyekola.  Na boyambi bwa biso, tosengeli koyeba ntina ya maye tozali koyamba ‘to koyeba ntina ya eyamba ya biso. Na boyekoli mpe botangi, moko moko asengeli kokota mpe koyeba na bozindo mibombamo mya eyamba ya biso. Bakambi basengeli kosala ‘te mposa ya bango ya liboso ezala koluka koleisa mpe kolendisa boyambi bwa bakristu.
Boyambi bwa biso, tozwi bwango na bapostolo, na bapanzi Nsango Elamu, na baboti ‘to mpe na moto nyonso asalisi biso na nzela ya boyambi. Boyambi bona tozali kobikela, nalingi ‘te tobikela bwango na lolenge ibale:
1° Na bomoi bwa biso moko: boyambi bozali lolenge moto na moto akokutana na Yezu. Awa nazwi boyambi na lisalisi ya bandeko basusu mpe nandimi kokula batisimo, eyano ya ngai ezali nini? Yezu akotuna ngai na yo: “ bato bakoloba ‘te nazali Joane Mobatisi, Eliya, Yéremia; basusu bakoloba moko wa baprofeta; Simoni Petro alobi nazali Kristu, Mwana wa Nzambe wa bomoi. Wana nionso ezali malamu. Kasi yo olobi nini mpo na ngai? Nazali nani mpo na yo? (Mt 16, 14-16). Eyano ya ngai ezali  mbuma ya bokutani bwa ngai na Kristu, oyo ekosala ‘te nasakola ya solo eyamba etikela biso bapostolo. Yango wana nasengeli komituna lolenge kani nazali kobikela boyambi bwa ngai? Na losambo la ngai? Na botangi mikanda misantu mpo na koyeba Yezu malamu, koyeba oyo akoloba mpe kosenga na ngai nasala mpo nalakisa ya solo ‘te nazali mokristu?
2° Na Lisanga: boyambi bozali mpe likambo ya eklezia to lisanga. Soki nandimi Nzambe, nasengeli kolakisa yango mpe na basusu. Boyambi bwa moko moko bozali boyambi bwa eklezia mobimba. Liboso lya kokula komunio na misa tolobaka: “ Otala masumu ma biso te kasi tala boyambi bwa eklezia ya yo...”. boyambi etali eklezia mobimba : boyambi bwa biso bowuti na biso moko te kasi tozwi bwango na eklezia. Soki mpe totali na mikanda misantu, tokomona polele ‘te bato ebele bazwi libiki lya Nzambe na lisalisi ya bandeko basusu; ndakisa mama ya mboka Naïm(Lk 7, 11-16), komanda na mosali wa ye ( Mt 8, 5-13), etc. Boyambi bokosalisa lisanga ya bayambi bayeba komisalisana. Lisanga lya liboso oyo tokobikela mpe tokokabola boyambi ezali libota. Yango wana tomituna: na mabota ma biso tobikelaka boyambi ndenge nini? Tata, mama na bana, bobikelaka boyambi bwa bino lolenge kani? Ndenge nini bolendisaka yango? Bosambelaka mpe botangaka Liloba lya Nzambe na mabota ma bino?
Lisanga ya mibale ezali paroisse, mingi mpenza ba CEV ya biso. Boni boni tobikelaka boyambi na ba CEV mpe na ba quartier? Na paroisse nazalaka na lingomba ‘to lisanga nini? Namipesaka ndenge nini na misa ma ntongo mpe na misa ma lomingo? Makambo ya CEV etalaka ngai? Libanda ya libota mpe ya CEV, ndenge nini nabikelaka boyambi bwa ngai? Namimonisaka o miso ma bato ‘te nazali mokristu ‘to namizongisaka nsima?
Mpo na bosukisi, nakosenga na Banganga   Nzambe, bayangeli mpe bakambi mangomba, batanga mpe batia liboso Liloba lya Nzambe na masanga ma bango, bamanyola yango mpe balendisa baninga mpo ‘te babikela boyambi bwa bango na bomoi bwa bango moko mpe na lisanga.
Tosambela Nzambe mpo ya moko moko wa biso mpe toloba: “ Mokonzi lendisa boyambi bwa biso” mpo ‘te tozala libota se lioko, masanga ma biso malenda na losambo mpe na bobuki mampa, lokola esengami na 3ème Congrès Eucharistique (Likita linene litali ukaristia) oyo ekosalema na Lubumbashi na mwa le 07 kino 14 juin 2020. Kuna tokomanyola mpo etali “ Ukaristia na Libota”. Mama Santu Maria, oyo ayambaki na bonsomi bonso mpe na motema mobimba ‘te mwango mwa Nzambe mokokisama o bomoi bwa ye, asambela mpo ya biso banso. Amen.
+ Mgr Donatien Bafuidinsoni, SJ., 
Bofungoli mobu mwa mosala o eklezya 2019-2020
( Inongo, mwa 22 septembre 2019).

Aucun commentaire:

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj
31.03. 2018-

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm
(06.01.1954-12.06. 1967) + 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
(12.06. 1967-22.07. 2005) + 19.11.17

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm
27.07.2005-31.03. 2018

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO