lundi 23 novembre 2020

Mateya ma tata Episkopo o lomingo la bokulisi bo diakono mpe bonganga

 

 MATEYA O LOMINGO LA BOKULISI BODIAKONO MPE BONGANGA

Octobre 2020

Matangi : Ez 34, 11-12.15-17 ; 1 Co 15, 20-26.28 ; Mt 25, 31-46

Bandeko bakristu,

bandeko bakokula,

boboto na bino!

 

1.    Lelo tozali kosepela eyenga enene ya Kristu Mokonzi. Ezali malamu tomanyola mobombamo moye mwa Kristu Mokonzi lokola Mokonzi wa molongo mobimba mpe wa bikelamu binso. Litangi lya ibale ya lomingo ya lelo, oyo tozwi na mokanda mwa yambo mwa Santu Polo o na bakristu ba korinti likolakisa polele ntina ya mobombamo moye. Litangi liye lizali kolakisa polele lolenge Kristu azwi bokonzi na Nzambe Tata. Nalingi mingi mpenza tomanyola bokonzi bwango: liwa likomema na nsekwa. Na liwa mpe na nsekwa ya ye, Kristu alongi liwa mpe baye banso bakolanda ye bazwi nguya ya kolonga liwa mpe ya kozwa bomoi.

2.    Yango wana ezali na litomba linene ya koyeba ‘te bokonzi bwa Kristu bolekani na liwa o kuruse. Yango wana, bokonzi bwa Kristu bozali bokonzi boye bokoboma te kasi bokopesa bomoi, awa ye moko andimi kokaba bomoi bwa ye. Ezali bokonzi bwa kosalela baninga.

3.    Yango wana toyoki na litangi lya ya mbolokola‘te Kristu azali mokengeli molamu. Mokengeli oyo ayebi kobomba mpata ya ye, ayebi kobatela yango mpe komipesa mpo ‘te mpata izala na bomoi.

4.    Maloba maye masengeli kolendisa biso. Moko moko wa biso asengeli koyeba ‘te awa tozali kosepela eyenga ya Kristu Mokonzi, tozali kosepela Kristu oyo asopi makila maye mpo ya biso mpe azali kobatela biso mikolo minso, lokola mokengeli akosala mpo ya mpata ya ye... Maloba mayemakolendisampemakopesa biso elikya na ntango ya mpasi mpe ya minyoko. Ata likambo nini ekweli biso, tosengeli koyeba ‘te bomoi bwa biso bozali o maboko ma Nzambe, ye nde Mokonzi wa bomoi bwa biso mpe wa biloko binso; akobatela mpe akokamba biso.

5.    Kristu akomi Mokonzi zambi atosaki Tata waYe; amipesi mbala moko mpo ya kolongola biso o liwa lya seko mpe o boombo bwa lisumu; alongoli bobangi mpe lisumu o bomoi bwa biso. Alingi kozala mokengeli oyo akomema mpata na matiti malamu,...

6.    Kasi tosengeli komituna soki ya solo biso tondimi Kristu lokola Mokonzi wa biso. Mingi tokoloba: ya solo, tondimi. Kasi, koloba kaka na monoko ekoki te; tosenge likosala ‘te Kristu azala mokambi wa bomoi bwa biso mpe akotisa boboto na bolingo o mitema mya biso.

7.    Yango wana Nsango Elamu ya lelo ezali koyebisa biso nini tosengeli kosala mpo ya kokota o bokonzi bwa Nzambe: koyeba kosalisa baninga. “ Nakoloba na bino ya solo, mbala inso bosalaki yango na moko ya baye bake, bosalaki yango na ngai mei”...


Bandeko bakokula,

8.       Nzambe na ngolu ya ye alingisi ‘te bokula lelo o lomingo la Kristu Mokonzi. Ezala elembo enene euti o likolo mpo ya bino mpe esalisa bino malamu mpo ya koyeba lolenge bosengeli kozala ba diakono na banganga Nzambe. Bondima na motema mobimba ‘te Kristu azala ya solo Mokonzi wa bomoi bwa bino. Mikolo minso, bosala ‘te Kristu azala mokambi wa bino. Botika ‘te akamba bino lokola mpata ya ye, mpo bozala na esenge mpe boboto o mosala mwa bino mwa bodiakono mpe mwa bonganga.

9.       Mokolo mwa lelo mozali na litomba mingi mpo ya bino, mpamba te na sakramentu bokozwa, bokokoma lokola Kristu bakengeli ba mpata. Bokozwa mosala mwa kokamba mpatanankomboyaye, “in persona Christi”. Nakosengana bino botanga malamu litangi lya yambo ya lelo, bomanyola yango mpe bosala ‘te ekamba bomoi bwa bino.

10.   Awa bokokula, bokozwa bokonz ibouti na Nzambe, mpe ezali ya solo. Kasi ezali bokonzi bwa kosalela mpe bwa kokaba bomoi bwa bino mpo ya baninga, lokola toyoki na litangi lya ibale. Bokozwa ya solo nkombo ya Kristu Mokonzi soki na bomoi bwa bino bobikeli lokola Kristu, kotosa Nzambe tee na liwa mpe koyeba kopesa ye bomoi bwa bino mobimba. Yango nde ntina ya sakramentu bokokula lelo; ezala bodiakono, ezala bonganga, bokosala ‘te bozwa bokonzi bwa Kristu.

11.   Ntango bozalaki na ezuzunu (retraite), bomanyolak imaloba maye: “ Ngai oyo Mokonzi, tinda ngai” mpo ya kokoma ba diakono mpe “ Nganga Nzambe, mopanzi Nsango Elamu” mpo ya kokoma banganga Nzambe. Na mateya, balakisi bino mosala mwa diakono mpe mwa nganga Nzambe o katiyaEklezya, balakisi bino ntina ya maloba nakoloba mpo ya kokulisa bino mpe maye bino bokoloba o miso ma bato mpo ya kondima mosala moye. Awa bokokula lelo, bosengeli koyeba ‘te Eklezya atie motema na bino (apesi bino confiance) mpe asengi na bino bokamba mpata ya ye mpo ‘te bosalisa bato basangana na Nzambe na nzela ya Liloba lya Ye mpe ya basakramentu. Ezali mosala, mokumba monene. Yango wana, ezaleli ya bino ekokana na maye bino bokoteya mpe kosala mpo ‘te boyokisa bakristu nsoni te.

12.   Awa bondimi kokoma ba diakono na banganga Nzambe, “Mokonzi wa seko” abengi bino, lokola Santu Ignace wa Loyola akolobaka. Mokonzi wa seko nde Kristu, Mokonzi wa molongo mobimba oyo tozali kosepela lelo. Mokolo moko boyokaki Mokonzi akobenga bino: “ yaka, landa ngai”; “ tika tata, mama, libota lya yo, omiboya, omema kuruse ya yo mikolo minso mpe olanda ngai”. Mpo  ya kopesa eyano na mbela ya Mokonzi wa seko mpe olanda ye, osengeli kolanda booko malako, soki te mosala mwa yo mokozala na litomba te. Nalingi koloba sika awa koyeba koyoka bato, koyeba kobomba makambo bato bakoyebisa bino mpe koyeba kolonga mabe. Bosengeli koyeba komanyola makambo mauti na Elimo ya Nzambe, maye makeseni na makambo ma mokili. Bosengeli koyeba komanyola malamu nini ezali kokende nzela moko na bomoi bwa bino lokola Kristu Mokonzi wa seko akosenga. Wana likambo ya liboso.

13.   Likambo lya ibale, ezali koyeba kobosana, koboya, kokima biloko na bato baye bakopekisa bino bolandaYezu Kristu. Biloko misusu na bato basusu bakozala wana mpo ya koluka kobungisa bino nzela ya Nzambe; boboya mpe bobosana bango. Mingi mpenza, nakoyebisa bino, botika lokoso yambongo. Mingi tobosanaka liteya liye ly aMokonziYezu: “ Moto moko te akoki kosalela bakonzi babale; to akoyina moko mpe akolinga mosusu, to akondima moko mpe akokinola mosusu. Bokoki kosalela Nzambe na mpe mosolo te”. (Mt 6, 24). Mokonzi Yezu ayebaki ‘te tokoki kosalela naNzambe, nampembongo te. Mbongo esalisaka, kasi ebomaka mpe. Mbongo ezali mosungi monene, kasi moteyi mobe. Liteya liye lya Nsango Elamu ya Santu Mateyo ezali na litomba mingi mpe soki totangi maye alobi nsima, tokoye bantina. Se bongo, tobosana te liteya Santu Polo apesaki na mwana wa ye wa molimo Timothée. Santu Polo akoloba na ye boye: “ Baye balingi kozwa nkita enene, bakondima masenginya, bakokweya o motambo mwa mposa ya bozoba mpe ya mabe, eye ekobebisa bato mpe ekobomaka bango. Solo, lokoso la mosolo lozali ntina ya mabe manso. Basusu bawelaki mosolo babebisi bongo boyambi mpe bamiyokisi motema mpasi mingi” (1 Tim 6, 9-11).

Bolula bisengo na nkita ya nse te. Boyebi malamu ‘te mingi bazali na nkita o kati ya biso bazwi yango na nzela ya mabe; lokola Yezu akoloba, bazali bakengeli to bayangeli babe. Sokibolingikozalana esengo na bomoi bwa bino, nkita ya bino ezala koyeba kosalisa, koyeba kolinga baninga mpe kobondo bato, bongo Nzambe akopambola bino. Soki bolingi kozala na esengo, bolanda ndakisa ya Kristu, Mokonzi wa molongo mobimba, Mokonziwaseko, oyo andimi komikitisa mpe kokoma moninga ya babola, babeli na bato bakangemi o boloko.

14.   Mokonzi wa seko abengi bino mpe atindi bino. Mbela ya ye ezali kokende elongo na etinda. Abengi bino mpo ‘te apesa bino mosala mwa kokende bisika ye moko asengelaki kokende (Lk 10, 1). Soki ye moko sengelaki kokende na Beronge, na Nkaw to esika esusu, ezali mpo ya kosala malamu. Yango wana bokozwa lelo nguya ya Elimo Santu awa nakotiela bino maboko, mpo ‘te bokende kosakola Liloba lya Nzambe nababola, na bato bakangemi o boombo, na baye bakufa miso, na bato bazali o boloko, na baye bazali konyokwama, na babeli mpe bato balembi nampasi (Lk 4, 18-19). Nsango Elamu bokomema ezali mpo ya kokomisa bato bansomi, mpo ya kobikisa, kasi ezali mpo ya kokoma bato ya mombongo te (les commerçants) to mpe bato ya misala ndenge na ndenge ( hommes d’affaires)...

Nalingi koloba mpo ya maye matali Nsango Elamu, ezali liloba liye likopesa bomoi, kozongisa elikya na bana ba Nzambe: bosimba ‘te nakokulisa bino lelo te mpo bokoma banganga Nzambe baye bazali kosala bisambo ya kobengana bilimo na ndenge na bango kasi bazwi ndingisa ya Episkopo te. Bokokoma bangangaNzambe te mpo ya kolakisana bato ‘te libiki lya bango lizali o maboko ma bino, lokola banganga bakosalaka. Nakokulisa bino mpo bokomisa bato baombo ba bino te, na mateya mazanga ntina na bikelakela ya bato basalaka bisalasala. Bosakola se Liloba lyaNzambe, liloba liyel ikosikola bato.

15.   Lokola Kristu, bokozala ba diakono bo “ babateli bamosala o kati ya Eklezya: mosala mwa koteya, mosala mwa kosalisa o lotale, mosala mwa kosalisa babola” (cfr Papa François, 25 mars 2017). Badiakono, bozala motema ngolu, bozala na mpiko mpe botambolo nabosolo bwa Kristu oyo amikomisi mosaleli wa bato banso (Lumen Gentium, n° 29), na bobombi mpe na bokolisi mposa ya losambo lisanga na bana ba Nzambe, mpo ya libiki lya mokili mobimba.

16.   Bino banganga Nzambe, bobosana te ‘te bozwi likabo ya bonganga mpo ya kokoma lokola Kristu ye mei,  mpo ya kosalisa, mpo ya komibonza bino moko mpe mpo ya kosantisa bana ba Nzambe. Mikolo minso, bosambela na boyambi mibombamo mya Kristu, mingi mpenzanaUkaristiya, na sakramentu ya ntubela, lokola Eklezya ekosenga. Mobombamo moye mokosenga na bino bobikela naloboko mokolo na mokolo liwa mpe nsekwa ya Yezu Kristu oyo amikabi mpo ya biso mpe mpo ya lokumu lonene la Nzambe.

17.   Libota lya bana ba Nzambe esuki kaka na libota lya bino, na bandeko, to na lokota na bino te. Bokomi badiakono na banganga Nzambe mpo ya bato ba mokili mobimba. Bolanda ndakisa ya Kristu oyo ayei kobikisa bato banso. Bokomi badiakono mpo ya kosalela baninga lokola Kristu, moninga wa bato banso oyo asali te biso banso tokoma bana ba Nzambe.

Bokomi banganga Nzambe mpe bokoti o libota ly abanganga Nzambe mpo bomonisa bondeko, lisanga mpe botosi na Eklezya mobimba. Mpo ya kosukisa, nakoloba na bino: “Bosambela, bosambela, bosambela”. Bozala mikolo minso na esengo. Boyokisa bana ba Nzambe nsoni te mpe bopesa bisimbisi ya mabe na bato te.

18.   Mama Santu Maria, Mama wa biso, asambela mpo ya bino mpe mpo ya biso banso mpe azwela biso ngrasia ya koyeba koyokisa Kristu esengo ntango inso, Ye Mosali mpe Nganga Nzambe Monene, asalisa biso tosalela ye malamu, lelo, lobi mpe o bileko binso seko. Amen

 Mgr Donatien BAFUIDINSONI, SJ., Episkopo wa Inongo.

Mateya o lomingo la Kristu Mokonzi mpe la bokulisi bodiakono na bandeko Jonas IPEKE, Hermann MAKO, Tristan MONSEMBULA, Teddy MWANZA, François NGUNA mpe la bokulisi bonganga na bandeko Narcisse BIONGO, Rodrigue EBENGO, Trésor FINZO, Hugues MANGI, Gervais MPETI, Hugues NKONONI, Yannick NYAMAZOMI na mpe Henri-Génial BOLAMPETI,cicm.

Inongo, mwa 22 novembre 2020.

Aucun commentaire:

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj
31.03. 2018-

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm
(06.01.1954-12.06. 1967) + 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
(12.06. 1967-22.07. 2005) + 19.11.17

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm
27.07.2005-31.03. 2018

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO