vendredi 20 mars 2020

Mokanda mwa Episkopo na tango ya bokono bwa Coronavirus


Diocèse d’Inongo
S.E. Mgr Donatien Bafuidinsoni Maloko-Mana, SJ.

Na mpasi eye Mokonzi, lendisa boyambi, elikya mpe bolingo bwa biso
(Cf. Lk 17, 5 ; 1 Cor 13, 13)
Maloba na Banganga Nzambe, na Bakristu ba diocèse ya Inongo mpe na bato ba motema molamu, na ntango ya bokono bwa Coronavirus (Covid-19)
Bandeko,
Boboto bwa Kristu bozala na bino !
1. Koleka sanza misato, tozali kolanda lolenge bokono ya coronavirus ezali kokoba mpe kopanzana na mikili minso. Koleka mposo moko, bandeko ba ekolo ya biso mpe bazwi bokono ya coronavirus. Mposa ya biso ezali ‘te bokono yango esila, kasi tozali komona ‘te na mikolo mikoya bato bakozwa bokono bakoleka montango mwa lelo. Bikolo mingi bizwi mikano mya kosukisa bokono eye. Mwa 18 mars 2020, bakonzi ba Leta bazwi boko mikano miye mitali masanga mpe bisambo o kati ya bandako ya Nzambe.
2. Nalingi koyebisa na biso banso tolanda mikano Leta epesi biso mpe tolanda na bokebi toli baminganga bapesi mpo tomibatela mpe tobatela baninga. Ndakisa, kosukola maboko mbala mingi na savon, koboya kopesa mbote na maboko, koyambana, mpe kozala mosika na baninga koleka ndelo ya 1m, kokosola na katikati ya maboko, bongo na bongo. Kasi, tobanga te, lokola na boweli biloko bya kolia, bateki mpe bayeba ‘te ezali libaku ya komatisa montango mwa biloko te. Ezali mpo ya biso ntango ya kobikela ya solo bondeko mpe bolingo. Bobola bwa biso bokoki kosalisa biso soki tokosalisana solo soki tokozala na bokebi mpe botosi mpo ya bolamu bwa bato banso. Na mikolo miye tosengeli kobongola bizaleli bya biso na maye matali bopeto, na lisalisi ya baminganga oyo bazali komipesa na bolingo bonso mpe na mbela ya mosala mwa bango mpo ya kobikisa bomoi bwa bato ebele.
3. Nazali koloba na bino, bandeko ba ngai, mpo ‘te bomoi bwa biso bokoba mpe mpo ‘te moko moko wa biso abatela bomoi bwa baninga, zambi nayebi ‘te bisaleli bya santé (bokolongono bwa nzoto) na ekolo ya biso bizali malamu te. Bokono eye ekomi o kati ya biso na ntango ya Karezimo, ntango mpe ngonga kitoko Eklezya epesi biso mpo ‘te tosambela, tomipima mpe tokabela bato bazali na mpasi. Tobosana te : tokanga mitema mya biso te kasi toyoka Mokonzi oyo akolobela biso na ntango eye.
4. Lokola bapekisi masanga ma bato koleka 20 (ntuku ibale), tokoki kosambela Misa mpe kosala nzela ya Kuruse lisusu te na ba paroisses ya biso na ntango eye ya karezimo. Kasi ezala ntango ya kosambela mingi moto na moto mpe o kati ya mabota mpo ya mokili mobimba mozali konyokwama. Wana lolenge ya kokumisa Nzambe solo na mitema mpe na bosolo, lokola Mokonzi azali kosenga (Jn 4, 21-24). Ntango eye ya mpasi ezali ntango tosengeli kosambela mpe kosenga na Mokonzi na bolobeli bwa basantu ‘te alongola biso na mpasi eye.
5. O kati ya mabota to moto na moto, tosambela losambo la Chapelet mpo ‘te tozala lisanga na Eklezya mobimba na bosengi lisalisi lya mama Santu Maria oyo akoki kotika biso na mpasi te. Yango wana nakosenga na bino banso bosambela lisanga na ngonga ya 19h00’ losambo la Chapelet.
6. Banganga Nzambe bayeba koyamba bakristu baye bazali na mposa ya sakramentu ya ntubela, komunio ya bakoni to lisalisi lisusu lya molimo. Banganga Nzambe basambela Misa mikolo minso lokola esangami mpe babonzela na Nzambe nsambo ya bakristu banso, babondo babeli, bakolo na baye babwakemi.
7. Nakosenga na biso banso totala na bokebi mposa ya bandeko banso mpo ‘te moto moko akelela te. Bokono eye ezali likambo ya biso banso. Lisanga na losambo, moto na moto, esika azwami asambela Nzambe mpo ‘te mpasi eye esila. Yango wana, nakosenga na ba CEV, na bakristu babongisa lolenge ya kosalisa Banganga Nzambe oyo basengeli na lisalisi lya bango mpo ‘te bakelela te. Kokaba ya biso esuka kaka o kati ya tempelo te, kasi ezala mingi mpenza likambo lya motema eye ekokaba ntango inso mpe bisika binso.
8. Na ntango ya matanga, mpe esika ekoki kosalema, Banganga Nzambe basala « Bosesi bawei » elongo na bato moke mpenza mpe bazala mosika na bato mpo bamibatela mpe na mosala ya kobondo mpe kosalisa bakristu na nzela ya boyambi, ata soki banso bakoki kozala wana te.
9. Baboti babatela bana mpe bakoba koteya bango, mpo ‘te ntango eye ezala te ntango ya kozanga koyeba eloko ya kosala.
10. Poso Esantu mpe Pasika ya mobu moye ekozala lokola tomeseni kosala te. Mokonzi Yezu azali konyokwama elongo na baye banso bazali kobela mpe kokufa bipayi binso na mokili na bokono ya coronavirus (Covid-19). Tosengeli kozala lisanga na bango na losambo mpe kokabola malozi ma Mokonzi wa biso Yezu Kristu oyo ayei kopesa biso bomoi na nsekwa ya ye. Wana ntina ya boyambi mpe ntina ya elikya ya biso.
11. Pasika ya mobu moye ekozala na lolenge na yango, mpamba te tomona naino likambo ya boye te. O kati ya mitema, Mokonzi azali kolobela biso mpe kosenga na biso tobongisa lolenge tozali kobikela mpe tozala na bondeko bwa solo na baninga, lisanga na mokili mobimba moye mozali kobunda na mpasi ya kobota mokili mwa sika, mokili mwa bondeko moye mokotala loposo, nkota to ekolo te.
12. Santu Yozefu, oyo tozali kosepela lelo, azala mobateli mpe mokengeli wa biso lokola abatelaki Ngondo Maria na Mwana Yezu. Ba esengo Marie-Clémentine Anuarite na Isidore Bakanja basambela mpo ya ekolo ya biso mpo ‘te mpasi tozali na yango esalisa biso tokola na boyambi, na bolikyi mpe na bolingo mpo ya Nkembo enene ya Nzambe.
Nazali kosambela mpo ya moko moko wa bino, mpo ya mabota ma bino mpe nakosenga na bino bosambela mpe mpo ya ngai. Nzambe abatela mpe abenisa bino o nkombo ya Tata, mpe ya Mwana, mpe ya Elimo Santu.
Amen.

+ Donatien BAFWIDINSONI, S.J.
Episkopo Ya Inongo

Aucun commentaire:

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj
31.03. 2018-

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm
(06.01.1954-12.06. 1967) + 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
(12.06. 1967-22.07. 2005) + 19.11.17

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm
27.07.2005-31.03. 2018

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO