lundi 24 décembre 2018

Lettre pastorale Noel 2018


MATEYA O MOKOLO MWA MBOTAMA 2018
« Mesiya, yaka kozongisela biso elikya mpe kobisa biso »

Matangi : Iz 9, 1-3.5-6 ; Tito 2, 11-14 ; Lk 2, 1-14

1.      Uto mposo minei, tosambelaki mpe toyembaki : « Mesiya, yaka kozongisela biso elikya mpe kobikisa biso ….  Mwana wa Nzambe, koumela te, na nzoto wa yo, opesa esengo o mokili mwa biso mobulungani … ».  Mpe lelo, o butu boye nta bosantu, mwinda mobimi o kati ya molili, mwinda mongengeli bato ya ekolo ya mozangi moi.  Baboteli biso mwana moko, bapesi biso mwana mobali.  Nzambe ayokisi biso nsai enene, akolisi esengo, mpe bato baye bakosepela lokola o mokolo bakobuka mbuma o bilanga, lokola bakosepelaka mokolo bakokabola biloko babotoli o etumba.  Mpamba ‘te, ekangiseli ekangaki bango, nzete eye ezalaki o mapeka ma bango, lingenda lya kapita wa banyokoli, manso mabukami.  Minkoto mya basoda, bilamba bitondi na makila, manso matumbami, manso maziki o moto.  Elongo na banzelu, banso toyemba : Noël, Nzambe ayei kobikisa bato ba ekolo ya ye.  Uto lelo, mawa ma bango mabongwami esengo, mitema mizoki na mpasi mikosepela na nsai, bosembo mpe boboto bikozala seko o lopango lya bango, bikoumela seko o ekolo ya bango.

2.      Lelo, se bongo o butu ya mbotama inso, tokomitunaka : Mpo na nini Nzambe atindaki Mwana wa ye o mokili, awa asali ‘te abotama na ngondo Mosantu Maria ?  Nzambe atindaki Mwana wa ye mpo abikisa biso, mpo azala Mobikisi wa biso.  Abikisa biso na nini mpe mpo ya nini ?  Nzambe ayei kobimisa biso o molili ya mambi ma mokili mpo ayingisa biso o mwinda moye mokopesa biso, mokolakisa biso elikya.  Mpamba ‘te Nzambe alingi biso mpe ayei koyebisa biso lisusu mbela ya biso bo bana ba ye.

3.      Ya solo, Nzambe amonaki ‘te, moto ye akelaki na elili wa ye, abebaki mpo ya masumu, amonaki ‘te bato mingi bazalaki kosala lokola Kaina asalaki na ndeko wa ye Abel, amonaki ‘te bato mingi bazalaki lokola David, oyo profeta Nathan alobaki ‘te asalaki lokola moto ya nkita oyo azalaki na bibwele mpe bangombe mingi, kasi abotolaki mpata ya mobola mpo ya koyamba moninga wa ye ayaki kotala ye (2 Sam 12, 1-10).  Nzambe amonaki ‘te bato mingi bazalaki komema bomoi bwa bango lokola Jezabel oyo, na boyokani na bakolo mpe bazuzi ya mboka Jizreel, abomaki Naboth mpo ‘te abotola elanga ya vino ya ye mpamba ‘te mobali wa ye Hacab alingaki kokomisa elanga ya ye enene (1 R 21, 1-19).  Nzambe amonaki ‘te bato mingi bazalaki kosala lokola bateki mabe, baye bakomatisa biloko ntalo mpe bakokosa basombi mpo ya kosomba babola na mosolo (Amos 8, 4-7).  Nzambe amonaki ‘te bato mingi bazalaki kosala lokola zuzi oyo azalaki kobanga Nzambe te mpe azalaki kotosa moto te, oyo azalaki koboya kokata na bosembo likambo lya mwasi eye akufela mobali (Lk 18, 2-5).  Nzambe amonaki ‘te ezaleli ya biso eulani na oyo ya bafutisi mpako baye Yowane Batisimu azalaki kosenga ‘te bafutisa bato se motango ndenge esengeli, basenge “madesu ya bana” te, lokola Yowane Mobatisi alobaki mpe na basoda ‘te babotolo biloko ya bato te, kasi bandima se lifuti lya bango (Lk 3, 11-14).  Nzambe amonaki ‘te mingi kati ya biso bakosala lokola Herode nakobomaka bato basali mabe te.  Ya solo, Nzambe amonaki ‘te motema likundu, nkanda to zuwa (nkele) itondi o mitema mya bato, ‘te bongai, lokoso lya bokonzi, ya mbongo, ya biloko bya mokili ekotinda bato basusu baboma baninga, bayiba mpo ‘te bakomisa biloko bikoumela ‘te nkita ya bango.

4.      Na bolingi bwa ye bonene mpo ya biso bato, Nzambe andimi kokabola bomoto bwa biso, longola se lisumu, mpo ya kolongola mokili mobimba o nzela ya lisumu.  Na Mwana wa ye, Nzambe andimi kozala o kati ya biso, mpo ya kokoma moko wa biso, mpo ya libiki lya biso.  Nzambe andimi kokoma moto mpo ‘te biso tokoma bana ba ye, mpo tokabola bonzambe bwa ye.  Nzambe ayei o mokili mpo ‘te mokili mokoma ndako ya ye, mpo ‘te motemo mwa moto moyamba ye. Awa akofanda na biso elongo, akokabola mpasi, esengo mpe elikya ya biso mpe akoteya biso tolanda ndakisa ya bolingo Nzambe alakisaki ye.

5.      Lelo, o butu nta bosantu ya mbotama, moto akamati solo elongi ya Nzambe.  Uto lelo, tosengeli kotala moto se bongo.  Moninga wa ngai moto akolata elongi ya Nzambe ; bongo, tokomona Nzambe o bomoi bwa moto inso.  Nzambe afandi kaka o kati ya biso te.  Mingi mpenza, Nzambe azali o kati ya ngai, azali na ngai mpe o moninga wa ngai.  Kosala moto mabe elingi koloba kosala Nzambe mabe.  Kotosa Nzambe ekosenge ‘te totosa moto inso, topesa bomoi bwa ye lokumu, mpe totosa bonsomi bwa ye awa asengeli kofanda na boboto mpe kozala na esengo ntango inso mpe bisika binso.

6.      Nzambe atindi Mwana wa ye Yezu abotami o kati ya bobola, lokola moto mpamba, alali o elielo ya bibwele zambi esika ezwamaki te o ndako ya bampaya mpe o mitema mya bato.  Se bongo, Nzambe akolakisa biso ‘te nkita ya moto ezali na biloko bya ye te, ezali mpe na bokonzi bwa ye te.  Nkita ya moto ezali na lolenge akoyamba moninga wa ye na motema polele mpe na bosolo, na motema bosawa, lokola bakengeli ba mpata, mpo ‘te moninga, ndeko akola, atombwama mpe apusana pene pene ya liziba se yoko lya bolamu mpe biloko binso, liziba liye biso banso tosengeli kolula mpe koluka, yango nde Nzambe.  Mpo ya koyamba Nzambe mpe baninga, esengeli kozala motema mobola, motema soke.

7.      Soki tokofungola solo mitema mya biso mpo ya koyamba Mwana wa Nzambe, tokobima o molili wa bongai, ya nkele, ya zuwa, ya lolendo mpo bokonzi bozangi ntina, mpo ‘te tokoma bana ba mwinda, mpe mokili mokotonda na esengo eye Mwana Yezu akomemela biso.  Se bongo, tokokoma bato bakoyeba kokabola nkita Nzambe apesi biso bo bakengeli mpo ya bato banso; tokokoma bato bayebi kolinga baninga, bato ba ye mpenza, bato bayebi koluka se kosala malamu.  Soki tokosala bongo, tokotonga elongo ekolo oyo ekozala na bosembo mpe boboto.

8.      Awa tokoyamba Mwana wa Nzambe, bomoi bwa biso, mitema mya biso mpe ekolo ya biso ekozala lisusu na molili te, na bobangi te mpo ya bato bakoluka bokonzi mpe lokumu ndelo te awa bakokanisa ‘te bakotikala o mokili seko.  Soki Mwana wa Nzambe abotami o mitema mya biso, tokongenge na mwinda mwa bolingo bwa Nzambe oyo akokamba biso o nzela ya boboto, ya elikya na bopesi biso bonsomi mpo tozala baombo ya lisumu te, mpe ya baye bakowangana bolingo bwa Nzambe te na bobebisi bomoto bwa biso tokelami na elili lya Nzambe.

9.      Na bosawa bonso, banso tokende o boso bwa Mwana Yezu, tokumbamela ye, ye moto akoya kobongola bomoi bwa biso, ye moto akoyela biso boboto mpe akongengisela biso elikya enene mpo ‘te nsai ya biso ezima lisusu te.  Mama Santu Maria asalisa biso, asembela mpo ya biso na ntina ‘te mitema mya biso mikoma elieli, esika Mwana Yezu akobotama mpe akofanda mpo ya esengo mpe boboto bwa mokili.

10.  Na bino banso, na moko moko wa bino, mpe o mabota ma bino, nakopesa bobenisi bwa ngai mpe nakotombela banso Eyenga ya Mbotama Elamu mpe Mobu mwa sika 2019 molamu, o nkombo ya Tata, mpe ya Mwana mpe ya Elimo Santu.  Amen.


Mgr Donatien BAFUIDINSONI,
Episkopo wa Inongo

« Na manso, kolinga mpe kosalela  »                           

Aucun commentaire:

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj
31.03. 2018-

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm
(06.01.1954-12.06. 1967) + 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
(12.06. 1967-22.07. 2005) + 19.11.17

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm
27.07.2005-31.03. 2018

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO