dimanche 28 mai 2017

Ascension du Seigneur

MBUTA YA YEZU O LIKOLO
********************
Nzembo: Yezu Kristu lelo, azongi o mboka Nzambe Tata; atikeli biso mosala.
Bandeko, ata tokoki komona Yezu sikawa na miso te, toyebi 'te azali na bomoi. Azwi lokumu o mboka Tata Nzambe oyo atii ye Mokonzi wa nse mobimba. Tala likambo tokokanisa lelo o eyenga ya Mbuta ya ye o likolo.

Litangi lya Yambo: Liloba lya Nzambe lokola likomami o buku ya Bikela bya Bapostolo (1, 1-11)
Litangi lya Ibale: Mokanda mwa santu Polo na Bakristu ba Efeze (1,17-23)
Nsango Elamu lokola santu Mateo akomi ( 28, 16-20).

Losambo nsima ya Komunyo:
E Nzambe Tata, okokabelaka biso bato ba nse eye bilei bya likolo; lendisa o mitema mya biso mposa ya kozala elongo na Yezu, oyo azali sikawa o mboka yo. Tokobondela bongo...

Aucun commentaire:

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj
31.03. 2018-

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm
(06.01.1954-12.06. 1967) + 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
(12.06. 1967-22.07. 2005) + 19.11.17

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm
27.07.2005-31.03. 2018

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO