dimanche 5 mars 2017

Premier Dimanche de Carême - Année A


Lomimngo la  yambo la Karezimo
******************
Bandeko, awa tobandi Karezimo totindami tobongola mitema. Se lokola Adamu, Yezu ayokaki masenginya, kasi ye alongaki lisumu. Yango wana, na lisalisi lya nguya ya ye, biso mpe tokoki koboya masenginya mpe kolonga lisumu.

Nzembo: Nyoka alobi 'te Yezu obongola mabanga ma ye makoma mampa, Yezu azongisi: kobika ya ngai, nasala manso manso Nzambe akolinga.

Losambo la ebandeli: 
E Nzambe wa bokasi bonso, osalisa biso tokanisa mpasi ya Yezu o Karezimo eye mpo toyeba bolingi akolingaka biso. Mwinda mwa ye motanela mitema mya biso bongo tobongisa bizalela bya biso. Tokobondela bongo...

Litangi lya Yambo: Liloba lya Nzambe lokola likomami o buku ya Libandela (2,7-9; 3,1-7a)
Litangi lya Ibale: Mokanda mwa santu Polo ona bakristu ba Roma ( (5,12-19)
Nsango Elamu lokola santu Mateo akomi (4,1-11)
Losambo la mabonza
E Mokonzi, na Ukaristiya eye tobandi kolengele eyenga ya Pasika; obongisa mitema mya biso mpo 'te tobonzela yo mabonza bo ebongi.
Tokobondela bongo..

Liteya: Mosenginyi abelemi mpe alobi na Yezu:
"Soko ozali Mwana wa Nzambe, loba na mabanga ma ye 'te mabongwana mampa. Kasi Yezu azongisi: Ekomami 'te  Moto akobika bobele na mampa te, kasi na maloba makobimaka o monoko mwa Nzambe.."

Aucun commentaire:

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj
31.03. 2018-

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm
(06.01.1954-12.06. 1967) + 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
(12.06. 1967-22.07. 2005) + 19.11.17

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm
27.07.2005-31.03. 2018

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO