dimanche 26 mars 2017

IVème dimanche de carême - A

Lomingo la Inei o Mobu
******************
Bandeko, Yezu Kristu ayeli bato bafandaki o molili mwinda mwa solo mokolakisa bango nzela ya libiki.


E Mokonzi Nzambe,
ozongisi bato ba bikolo binso o bondeko bwa yo na liwa mpe nsekwa ya Mwana wa yo; Okolisa boyambi bwa bana ba libota lya yo mpo 'te basepela eyenga ya Pasika na bolingi bonene.
Tokobondela bongo...


Litangi lya Yambo: 
Liloba lya Nzambe lokola likomami o buku ya yambo ya Samuel
"Nzambe alobi na Samuel: naboyi Saul, akoki kozala Mokonzi wa Israel lisusu te. Kamata liseke lya ngombe, tindisa lyango na mafuta mpe kende epayi ya Yese o Beteleme, zambi o  ntei ya bana ba ye naponi mwana moko azala mokonzi..."

Litangi lya Ibale:
Mokanda mwa santu Polo na bakristu ba Efeze
Bandeko, kala bozalaki o molili, kasi sikawa bosangani na Mokonzi, bokomi kongenge lokola mwinda (...).Lamuka, yo moto olali mpongi, sekwa o kati ya bawa mpe mwinda mwa Kristu mokongengele yo".

Nsango Elamu lokola santu Yoane akomi 
O nzela Yezu amoni moto moko abotama na lolanda. Yezu abwaki nsoi o mabele, asali na yango potopoto mpe apakoli yango o miso ma moto ona; alobi na ye: " kende  komisukola o liziba lya Siloe, lokola 'te Motindami." Moto wa lolanda akei mpe amisukoli. Ntango azongi akomi komona malamu..."

Aucun commentaire:

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj
31.03. 2018-

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm
(06.01.1954-12.06. 1967) + 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
(12.06. 1967-22.07. 2005) + 19.11.17

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm
27.07.2005-31.03. 2018

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO