mercredi 1 mars 2017

Eleko ya Karezimo

Mokolo mwa Mputulu
************
Photo archive: imposition des cendres à Ste croix Bokoro l'an 2013: Abbés Michel Mbaka et Fidèle Ikombila
Bandeko, lelo tobandi eleko ya Karezimo. Tokozwa elembo ya Mputulu mpo ya kolakisa 'te toboyi masumu. Tolingi mpe kolakisa Nzambe 'te toyoki motema mawa mpo ya mabe tosali.
Masumu ma ngai olimbisa , Yo Nzambe nta bolamu. 
1.Topesi yo motema toyei o mboka yo, Yo Nzambe wa bokasi bonso
2.Mobikisi wa bato yo mwana wa Tata, olimbisa masumu manso
3.Otalaka bakristu obatela bango; bazwi na yo malamu manso
4. O kati ya molili otalisa nzela; olendisa biso mitema

Losambo la ebandela: 
E  Mokonzi, osalisa biso tosantisa mokolo mwa lelo, tobanda eleko ya Karezimo malamu. Tolendisa mitema na bomipimi biloko mpo tokoka kobunda etumba na mabe manso.
Photo archive: Notre Dame de Fatima/ Oshwe
Litangi lya yambo: liloba lya Nzambe lokola profeta Yoel akomi ( 2, 12-13.16-18)
Litangi lya ibale: Mokanda mwa  mibale mwa santu Polo ona bakristu ba Korinti ( 5,20-6,2)
Nsango Elamu lokola santu Mateo akomi ( 6,1-6.16-18).

Losambo la bobenisi Mputulu:
Mokonzi Nzambe wa biso, okolimbisaka bato bakomikitisa o miso ma yo mpe bandimi kobongisa mabe basali. Ondima losambo la biso:
Photo archive: L'abbé José Monsengwo bénit les cendres à Ste Croix Bokoro
benisa + basaleli ba yo bakozwa mputulu lelo, mpo 'te batosa mibeko mya Karezimo, bongo mitema mya bango mipetwama; bakoka kosepela eyenga ya Pasika, mokolo tokokundola nsekwa ya Mwana wa yo, azali na nkembo elongo na Yo mpe na ElimoSantu o bileko binso seko.

Bopakoli Mputulu
- Bongola motema mpe ndima Nsango Elamu ya Kristu

To
Nos enfants après les cendres à l'église Marie- Reine à Kutu
- Ndeko, kanisa 'te ozali mabele mpe okozonga o mabele
Tobondeli bino o nkombo ya Yezu Kristu: botika Nzambe azongisa bondeko kati ya biso na ye (2 Cor 5,20).
Eleko ya Karezimo elamu na bino banso

Aucun commentaire:

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj
31.03. 2018-

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm
(06.01.1954-12.06. 1967) + 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
(12.06. 1967-22.07. 2005) + 19.11.17

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm
27.07.2005-31.03. 2018

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO