samedi 4 avril 2015

MOKANDA MWA PASIKA 2015


 ONA BANDEKO BAKRISTU BA DIOCESE YA INONGO
“Kobanga te. Ngai moto wa yambo mpe ya nsuka”; Nazali na bomoi( Boy.1, 17-18).

Tobunda etumba ya bomoi, na nkombo ya Yezu Kristu. Na bobangi te mpe na bosolo.
Bandeko ba bolingo
Alleluya. Kristu asekwi. Kristu alongi liwa…Boboto na bino mpe eyenga elamu ya nsekwa ya Mokonzi na bino banso! Yezu Kristu oyo azali na bomoi akomisa biso “bato ba bomoi”; bato bazwi mpe bakobikela bomoi bwa Ye mpe bakopesa yango na baninga mpe na mokili. Na nguya inso, na bobangi eloko moko te, na bosolo.
Bandeko,
Soko totali bomoi ya Yezu, ndenge ekomami na Nsango Elamu, tokoki koloba ‘te Yezu alingi makasi bomoi mpo ya bato banso. Alobi : « Nayei mpo bato bazwa bomoi mpe bazwa yango mingi »(Jn 10, 10). Yezu amibwaki na etumba ya kobikisa bato ya bokono ndenge na ndenge, bato babwakama, banyatami, batiami pembeni(Lc 19, 10) .Mpo ya Ye, bomoi ya moto bozali likolo ya mobeko ya sabato(Mc 3, 1-6). Bafarizeo, bateyi ba mobeko na bakolo ba mboka basusu bakani koboma Yezu mpo alingi komonisa polele ‘te bomoi ya moto yonso, penza penza ya mobola, bozali likolo ya mibeko. Ata bongo, Yezu abangi te, akobi nzela oyo Elimo ya Tata alakisi ye’te alanda(Lc 4, 30). Mokolo mosusu Yezu apaleli makasi bayekoli ba Ye babale, Jacques na Jean awa basengaki’te nkake ekweya likolo ya mboka moko ya SAmaria oyo baboyaki koyamba Ye(Lc 9, 54-56). Yezu alingi liwa te, liwa ata ya monguna te. Alingi bobele bomoi. Azali mopesi bomoi na banso lokola Tata Nzambe, Nkolo ya bomoi oyo abimisaka moi mpe anoyisaka mbula mpo ya bato banso (Mt5, 45.48).
Soko otangi malamu Nsango Elamu, okomona ‘te Yezu azali mbala mingi na nzela, na mobembo, azali « moleki nzela », Alingi kokende liboso epai esusu, epai ya baye basengeli na bomoi koleka(Mc 1, 38). Bobele bongo, akokokisa etinda azwi epai ya Tata : «  Tata oyo atindi Ngai, alingi ‘te wa baye apesi Ngai, nabungisa moto moko te, kasi nasekwisa bango o mokolo mwa nsuka » (Jn 6, 39). Yango wana Yezu aboyi ezaleli ya baye banso bamibengami « bakengeli mpata », kasi bazali « bayibi mpe babomi » : bayebi bobele koyiba, koboma, kobebisa : bazali « bapesi liwa »(Jn 10,10). Yezu aboyi mpe ezaleli ya bakengeli baye bazali koluka bobele mbongo to bomengo ya bango moko, bazali ba « mercenaires », bazali bakengeli ya solo te ; soko bamoni likama, batiki mpata yango moko, mpo bomoi ya mpata etali bango te(Jn 10, 12-13). Kasi Yezu azali Mokengeli mpata ya solo, oyo ayei kopesa bato bomoi ; asali yango awa akabi bomoi bwa Ye moko(Jn 15, 13).
Sekele ya mposa makasi ya Yezu ya kopesa bato bomoi, penza penza baye batiami pembeni, sekele yango ezali na kati ya bolingo oyo Nzambe alingi Ye mpe bolingo oyo Ye alingi Nzambe. Nzambe asangani na Ye lokola Tata na Mwana. Lokola Tata azali Nzambe ya bomoi, Ye mpe atondi na nguya ya bomoi ya Tata mpo ya bato (Jn 17, 21). Kopesa na banso bomoi bwa Tata ezali lotomo azwi mpe alingi kokokisa yango ;ezali lokola bilei asengeli kolia mpo abika (Jn 4, 34).
Liboso ya liwa ya Ye ya nsomo, Yezu alobi polele na banso : « moto moko te akobotolo ngai bomoi, ngai moko nakokaba bwango »(Jn 10,18). Andimi liwa ya Ye lokola libonza ya bomoi bwa Ye mpo ya biso, mpo ya kolongola biso na boumbu bwa bokabwani na Nzambe, lisumu. Andimi liwa ya kuruse. Andimi kokamata esika ya nsuka mpo’te moto moko te na nse azanga bomoi, ata mabe nini asalaki (Lc 22, 42-43).
Awa Yezu amonisi solo bolingo ya nsuka te na liwa ya kuruse, Tata ya bomoi asekwisi Ye o bawa. Akomisi Ye Mokonzi mpo ‘te banso awa bayoki nkombo ya Yezu bafukama o nta likolo, o nse mpe omboka ya bawa ; mpe banso basakola ‘te Yezu Kristu azali Mokonzi, mpo ya nkembo ya Nzambe Tata (Phil.2, 10-11).
Bandeko babolingo,
Kosepela eyenga ya Pasika mpo ya biso, bayekoli ba Yezu ezali kondima Yezu Kristu lokola Mwana Nzambe oyo andimi kokoma moto, oyo andimi koleka na liwa mpo alongisa biso liwa, mpo biso bato tozwa bomoi ya sika, bomoi bwa Ye… Tobanga lisusu nini ? Azali na biso mikolo minso kin’o nsuka ya molongo(Mt 28, 20). Kosepela eyenga ya Pasika ezali kondima kokoma « mobundi etumba » ya bomoi mpo ya baninga mpe mpo ya mokili moye. Totindami lokola Yezu, kokaba bomoi na baninga bato, liboso liboso na baye batiami pembeni mpe banyokwami : « lokola Tata atindi ngai, ngai mpe nakotinda bino. Nsima ya maloba mana, apemeli bango mpema mpe alobi : bozwa Elimo Santu… » (Jn 20, 21-22). Kobimisa baninga na bobangi mpe na molili ya lokuta, yango nde mosala mpe tozwi, awa tondimi’te Kristu akomisi biso bato ba sika na nguya ya Elimo ya Ye.
Bandeko ba bolingo,
Biso banso tolingi bomoi. Kasi lelo epai ya biso na mboka ya biso mpe ekolo ya biso,, bato ebele bakomi lokola bana bitike, moto akotala bango te. Lelo bato ebele banyokwami, basusu bazali konyata bango, bazali kokosa bango, komema bango na nzela ya lokuta mpe ya liwa. Na nkombo ya Mokonzi oyo azali na bomoi, nasengi bino, banganga-Nzambe, nasengi bino, bamibonza(consacrés), nasengi bino, bamama, batata, bilenge basi na babali, bobima na malita ya bobangi mpe ya lokuta. Botika koluka liboso bolamu ya bino moko, tango basusu bazangi bomoi, bakomi lokola bawa! Tobima, tokende epai ya baye banso bazali lokola mpata izangi mokengeli, mpo ngolu ya Nzambe epesa bomoi na banso.Oyo etinda ya Papa François mpe boleli ya ye mpo ya Ekklezia lelo. Indifférence mpo ya baninga eleki mingi na mokili ya lelo.
Eyenga Elamu ya Pasika! Tosekwa solo mpe tosekwisa baninga balembi, tosekwisa mokili ya biso. O nkombo ya Yezu Kristu oyo azali na bomoi, Nzambe apambola mpe abenisa bino banso. Amen!
Inongo, mwa le 04/04/2015
Wa bino Tata Episkopo,
+Philippe NKIERE KENA

Aucun commentaire:

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj
31.03. 2018-

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm
(06.01.1954-12.06. 1967) + 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
(12.06. 1967-22.07. 2005) + 19.11.17

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm
27.07.2005-31.03. 2018

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO