dimanche 12 août 2012

Solennité de l'Assomption de la B. Vierge Marie au Ciel. Ntombwa ya Maria o likolo


1. Lelo tokoyemba na mondimo monso Ntombwa ya Maria kin' o likolo.
R/Tosepela, toyemba nkembo ya Mama. Ntombwa ya Maria kin' o likolo.
2.Yo Mama wa Nzambe, obotami petwa ozongi se petwa kin' o likolo
3. Nzoto na molimo, imemaki Kristu itikali petwa kin' o likolo.

Liloba lya Nzambe lokola likomami o buku ya Mibombamo

O ntango ena tempelo ya Nzambe o likolo efungwami: sanduku ya bondeko emononi o tempelo (…). Elembo enene ebimi o likolo, mwasi moko alati mwese lokola elamba, sanza ezalaki o nse ya makolo ma ye, mpe minzoto zomi na mibale mizalaki kokembisa moto mwa ye, azalaki na zemi, alingi abota, aleli mpo ya mpasi ya kobota. Elembo ya ibale ebimi o likolo: ebakata ya nyama ya motane ngwa, ekokani na ngando, na mito nsambo mpe na maseke zomi: o moto moko moko elati enkoti ya bokonzi; mokila mwa yango mokombi eteni ya bisato ya minzoto mya likolo, mpe mobwaki myango o nse.

Ekomi ngando o boso bwa mwasi oyo alingi abota, elingi koliya mwana alingi abotama. Mwasi aboti mwana mobali, oyo akokamba bato ba nse banso na lingenda lya ebende. Mwana wa ye atombwami o mboka Nzambe penepene na ngwende ya ye. Mwasi akimi o eliki kuna Nzambe alengeli ye esika ya kobombama .

Sikawa lolaka logangi o likolo: ut’o sikawa lilonga, nguya na bokonzi bikomi bya Nzambe wa biso, mpe boyangeli bokomi bwa Kristu wa ye.

Aucun commentaire:

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj
31.03. 2018-

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm
(06.01.1954-12.06. 1967) + 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
(12.06. 1967-22.07. 2005) + 19.11.17

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm
27.07.2005-31.03. 2018

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO