vendredi 24 décembre 2021

Mokanda mwa mbotama 2021 mwa Tata Episkopo

 

MOKANDA MWA MBOTAMA 2021

Matangi :

Misa ma Butu :Is 9, 1-6 ; Tt 2, 11-14 ; Lk 2, 1-14

Misa ma ntongo :Is 52, 7-10; Eb 1, 1-6; Jn 1, 1-18

BandekoBoboto!

“ Bato batambolaki o molili bamoni mwinda monene, 

mwinda mongengeli bato bafandaki o mokili mozangi moi”(Iz 9, 1).

1.       Wana nde maloba ma liboso toyoki na matangi ma butu bwa lelo. Maloba maye makolakisa ntina ya eyanga enene ya mbotama oyo tobandi na butu boye bosantu. Na mbotama ya Ye, Nzambe – Emmanuel– akomi moto mpe akotambola na biso elongo mpo ya kobimisa biso o molili mwa lisumu. « Mwinda moye, mwinda mwa solo moyei o nse kongengele bato banso », lokola tokoyoka na misa ma lobi na ntongo. Mbotama ezali eyenga ya mwinda monene mpe mwa solo moye moyei kongengisa bomoi bwa biso mpe kolongola biso o molili. Mwinda moyei kolongola molili o kati ya biso mpe zingazinga na biso. Na mbotama, Nzambe akosenga na moko moko wa biso apelisa mwinda mwa ye mpo ‘te tokoma bana ba Nzambe, elongo na Mwana wa Ye se moko, Yezu Krsitu oyo akomi moto lokola biso.

2.       Na mbotama, Nzambe mpenza akomi moto, mpe andimi komona mpasi na bisengo ya bato. Yango nde toyoki na Nsango Elamu ya Santu Luka. Awa Kaizaro Ogusto atindi ‘te batanga bato mpo ya kolakisa bonene bwa bokonzi bwa ye, Nzambe, nta bokasi mpe mokeli wa biloko binso aluki na bonkutu lolenge ya komiyingisa o molongo mwa bato. Asali yango mpo ‘te Kaizaro akonza ye te, kasi mpo ‘te azala lisanga na baye bazali konyokwama mpe apesa bango bonsomi. Na mbotama eye, Nzambe azali lisanga na biso, kasi na Esti ya ekolo bandeko ba biso bazali kokufa mokolo na mokolo. Nzambe ayebi mpasi ya biso : Azali  lisanga na biso mpe alingi kobikisa biso, soki tondimi ‘te mwinda mwa Ye mwa bosolo mpe mwa bolingo mongenge o kati ya biso.

3.       Mbotama ezali eyenga ya bonsomi mpe ya libiki lya biso. Yango wana banzelu balobi na bakengeli mpata : « Bobanga te, nayeli bino nsango enene ekosepelisa ekolo mobimba, lelo baboteli bino mobikisi o mboka ya Davidi ; ye azali Kristu Mokonzi »(Lk 1, 10). Boyei bwa Mwana wa Nzambe bosengeli kolongola bobangi o kati ya biso, mpamba te « Nzambe  yemei ayei kobikisa biso ». Mokristu oyo ayebi ‘te  Nzambe akomi moto azali elongo na ye akoki kobanga ata eloko moko te awa akoluka ‘te boboto na bolingo bozala o kati ya mokili. Bobangi bokouta na Nzambe te. Na mbotama ya Mwana wa Ye, Nzambe apesi biso nguya na boyambi mpo ‘te tolongola o kati ya biso maye manso makosala ‘te tozala baombo. Wana mbotama ya solo.

4.       Mbotama ezali mpe bomikitisi bwa Nzambe mpo ya libiki lya biso. Nzambe aponi kobotama na bobola mpenza. Soki andimi kobotama na bobola, Ye oyo azali Mokonzi wa biloko binso, ezali mpo ya koteya biso ‘te « toboya mposa inso ya mabe. O mikolo miye tofanda na bokebi, na bosembo mpe na bobangi Nzambe » (Tt 2, 12). Mbotama ya Yezu ekolakisa biso ‘te binso bikoleka. Yango wana, tosala baninga mabe te mpo ya biloko bya nse. Kozala mokristu ezali nde koboya kozala moombo ya biloko bya nse. Soki tozali komipesa na kaniaka mpe na moyibi ya biloko bya bato banso, ezali elembo ‘te toyebi ntina ya mbotama ya Mwana wa Nzambe te, oyo andimi kokamata bobola bwa bato mpo ya kopesa biso nkita ya bonzambe. Ya solo, Nzambe alingi mpenza nde kobotama o mitema mya biso. Yango wana, moko moko wa biso abongisa motema mwa y empo ‘te Yezu abotama malamu.

5.       Na Mbotama, Nzambe amemeli biso esengo mpe nsai o mitema. Na mbotama ya Yezu, Nzambe atondisi biso na esengo (Iz 9, 2). Tokanisa esengo tozalaka na yango soki tozwi mwana wa sika o libota. Lokola mwana wa sika, Yezu mpe alingi kobotama o mitema mya biso, o mabota ma biso. Tondimi lelo kozala elielo to esika eye Yezu akobotama ?  Bobola na mpasi ekoki kopekisa biso toyamba Yezu malamu te, mpamba te Ye andimi kobotama na bobola bonso o elielo ya nyama.

6.       Na mbotama, Nzambe amitiki o maboko ma bato lokola mwana moke. Toyebi maye manso Santu Yozefu na Ngondo Maria basalaki mpo ‘te mwango mwa Nzambe mokokisama. Yezu abotami o kati ya libota mpe Maria na Yozefu basalisi ye akola malamu. Lelo Nzambe aponi mpe mitema mya biso, aponi mabota ma biso mpo ‘te mwango mwa ye mwa libiki mokokisama o ntei ya biso. Soki toyambi ye te, wana mpe toboyi ‘te libiki lya Ye likomela  bato. Lelo o mitema mya biso mpe o bomoi bwa biso, mwana moke abotami, Mwana Yezu. Tozala lokola bato bakobwaka bana bake na nzela to na matiti te mpo ‘te ba « fourmis » balia bango.

7.       Na mikolo miuti koleka, awa na Inongo, balokotoki bana babale baye bamama babwaki ; moko akufi, ba « fourmis » balie ye, mosusu bazongisi ye na mama wa ye. Makambo mana mazokisaki ngai motema mpe mapesaki ngai mpinzoli o miso.  Makambo maye masengeli kobenda biso matoyi. Biso banso tosengeli kosala ‘te makambo ma nsomo boye masalema lisusu te. Tosengeli kobatela bomoi boye Nzambe apesi biso. Bandeko, bobola to mpasi ekoki kotinda biso tobwaka moto na fulu, na nzela to na zamba te ! Nazali kosenga mpe ko bondela bino ; makambo ya boye masalema lisusu te na mboka yabiso ! Toyeba kosalisa baye bakeleli mpo ‘te bazwa makanisi ma kobwakabana te, to totika ‘te bakoma bameli bangi, totika te ‘te bakoma bakuluna, baye baboti mpe bakonzi basusu bazali kotika banyokola bato.

8.       Mama Santu Maria, Mama  wa  Nzambe, asalisa biso toyamba Mwana wa ye malamu, lokola ye moko asalaki, mpo ‘te tobikela bomoi boye Nzambe apesi biso. Santu Yozefu, oyo abatelaki Mwana Yezu malamu, azwela biso ngrasya ya kokolisa bomoi Nzambe apesi biso. Nzambe Tata atondisa mitema mya biso na esengo mpe na boboto boye Mwana wa Ye, Emmanuel, amemeli biso ! Toluka boboto mpe tokotisa esengo o mabota ma biso, na masanga ma biso, o bisika binso mpo ‘te mbotama ezala ya solo eyenga ya bana, eyenga ya mabota mpe na kati ya mabota, eyenga ya biso banso, bana ba Nzambe.

9.       Na mbotama, tobanga lisusu te, mpamba te Nzambe azali o kati ya biso. Tosambeli, toyembi « Emmanuel yaka ». Yango wana, o butu bwa lelo, mwango mwa Nzambe mokokisami : totondi na esengo, mwana abotami, baboteli biso mobikisi. Mwinda mongenge o mitema mya biso mpo ‘te biso moko tokoma minda miye mikongenge mpe mikokimisa molili zinga zinga na biso. Awa Mwana wa Nzambe akomi moto na butu bwa lelo, elongo na banzelu mpe na basantu banso, toganga makasi : « Nkembo na Nzambe o likolo, o nse boboto na bato ba Ye ba bolingo » (Lk 2, 14). Nzambe  azali o kati ya biso.

Mbotama esantu na moko moko wa bino mpe o mabota ma bino !Natombeli mobu molamu mwa sika, 2022. « Bonne année !» Nzambe abenisa bino o nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya Elimo Santu. Amen

 

Inongo, mwa 24 décembre 2021

 

+ Mgr Donatien BAFUIDINSONI, SJ. 

Episkopo wa Inongo

Aucun commentaire:

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj
31.03. 2018-

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm
(06.01.1954-12.06. 1967) + 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
(12.06. 1967-22.07. 2005) + 19.11.17

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm
27.07.2005-31.03. 2018

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO