samedi 3 avril 2021

MATEYA MA PASIKA

 

MATEYA MA PASIKA  2021

Matangi ma butu: Gn 1, 1-2,2 ;… ; Rm 6, 3b-11 ; Mc 16, 1-8

Matangi ma lomingo : Bk 10, 34a.37-43 ; Kol 3, 1-4 ; Jn 20, 1-9

Bandeko , boboto mpe esengo ya nsekwa bozala na bino!

1.      Lelo tosangani ebele o ndako Nzambe, kasi bisika bisusu ezali boye te. Na bisika bisusu bato bakangami o ndako, ndenge ya kokutana na ndako Nzambe ezali te, bazali kolanda misa ma pasika na bilili, mpo ya bokono bwa coronavirus. Na mitema bazali kosepela nsekwa ya Mokonzi Yezu oyo alongi liwa mpe apesi biso bomoi nsuka te, ata na ntango eye ya mpasi oyo toyebi lisusu lolenge ya kobikela te. Mingi bazalaki na mawa ntango nayebisi bino nsango ya liwa ya Mgr Jean-pierre Tafunga, Episkopo ya Lubumbashi, oyo awei na bokono bwa coronavirus. Bomoi bokomi mpasi mingi na ntango eye, kasi mpo ya biso bakristu, malozi, liwa mpe nsekwa ya Mokonzi Yezu makopesa biso elikya. Mpamba te « soki tokufi na Ye elongo, tokozwa bomoi na Ye elongo, soko tokotia molende, tokozwa bokonzi na Ye elongo » ( 2 Tim 2, 11).

2.      Lobi totambolaki elongo na Yezu o nzela ya kuruse. Tomoni ndenge bakoseli Ye makambo na bafarizeo, na banganga Nzambe mpe na bateyi ba mobeko. Yudasi, moyekoli wa ye, ateki ye na bibende ntuku misato (cf. Mt 26, 15). Baye baliaki na Yezu limpati lya nsuka bawangani ye mpe bakimi ye. Basambisi ye mpe bakitisi ye o likambo na lombango na Poncio Pilato, likolo ya limpinga lya bato bazalaki koganga : « akufa o kuruse ». Yezu asali ata mabe moko te, kasi tokitisi ye o likambo, toboyi bosolo, mpe toponi nzela ya liwa. Ye profeta monene oyo alingaki kozongisa bato na bondeko na Nzambe, Ye oyo alingaki ‘te tokoma bana ba Nzambe, tosengi ‘te baboma Ye mpe batika moyibi mpe mobomi. Lobi, banso tondimaki ‘te Yezu azali mosali wa mawa lokola oyo profeta Izaya akoloba, Yezu amoni mpasi mpe awei mpo ya bolingo bwa biso mpe mpo ya kolongola biso o boombo bwa lisumu. Se bafarizeo mpe bato baye bazali lokola bango bakoki koloba tosukisi ye ; Pilato aponi kobatela (ebonga ya) bokonzi bwa ye mpe andimi ‘te baboma moto asali mabe te o kuruse.

3.      Tala boye, bayei boyebisa bango ‘te moto bobomaki asekwi o bawa, azali na bomoi. Bayekoli baye bamikangaki o ndako na bobangi bayuda babimi na esengo, mpo ya kosakola bipai binso ‘te Yezu azali Mokonzi na nguya ya tata mpe angengisi mokili mobima. Nzoka nde kosakola boye ekoki komema bango mpe na liwa, kasi babangi te. Mwinda mokimisi molili, yango wana topelisi kandela (buzi) ya biso na butu boye bosantu mpo ya kolakisa ‘te masumu ma biso maziki na moto mwa ngolu ya Nzambe, tosukwami na mayi ma batisimo maye mabimaki na mopanzi mwa Yezu.

4.      Matangi ma butu bwa lelo mpe ma lomingo la pasika makoteya biso mingi. Makolakisa biso ‘te na liwa mpe nsekwa ya mwana wa Ye, Nzambe akeli mokili mwa sika mpe akosenga na biso tobongisa ezaleli ya biso. Santu Polo akoloba na biso boye : « soko ya solo bosekwi elongo na Kristu, boluka mambi ma likolo, esika Kristu azali mpe afandi o loboko la mobali la Nzambe. Bokanisa mambi ma likolo, ma nse eye te » (Kol 3, 1-2). Maloba maye makotinda biso tobikela o mokili moye lokola bato bakoluka se mambi ma likolo, maye makomema biso epayi ya Nzambe mpe totika bisengo bya nse biye bikosala ‘te toyeba Nzambe te, Ye Nkita ya solo oyo ekoleka te.

5.      Yango wana, soki nsekwa ya Yezu ekomemela biso esengo mpe mbongwana ya bomoi, nalingi mingi mpenza na Pasika eye ya Mokonzi wa biso Yezu, molili moye mokangi ekolo ya biso molongwa. Nalingi ‘te Pasika eye ebongola mitema mpe bomoi bwa biso, mpo ‘te bosolo bokota, totika koyinana biso na biso, tolanda makoseli ma bayipolitiki te, tokotisa boboto esika mabe mazali kongala.

6.      Na batisimo, towei mpe tosekwi elongo na Yezu. Tosenga na Ye ngrasia ya kolongola na mitema, na bomoi, na masanga ma biso mabe maye mazali kosala ‘te tokotisa baninga na molili ma malita, esika ‘te toyingisa bango o nzela ya mwinda mwa nsekwa mpe kopesa bango makabo ma Pasika : boboto, esengo na bolikyi. Mabe maye mazali koboma ekolo ya biso mikolo miye, toyebi mango malamu.

7.      Bayipolitiki balingi kovanda esika moko te mpo ya kotambwisa bo ebongi ekolo ya biso. Lokola Pilato, mingi o kati ya bayipolitiki na basali ba Leta, bazali koyoka lisusu nsoni te mpo ya moyibi mwa mosolo mwa ekolo. Yango wana bosolo bozali te na lolenge ya kosalela nkita ya ekolo. Yango wana tozali koyoka: bayibi mosolo mwa balakisi (bateyi), mbongo ya minganga ezali kokoma te, bitumba na Est ya ekolo ya biso, mabe ndenge na ndenge. Nzoka nde ebele ya mosolo wana ezali koyibama esengelaki kosalisa biso tobikela malamu.  Na bitumba ya Est, bandeko ebele bazali kokufa mokolo na mokolo, mingi bakimi ekolo, basusu bakomi baombo to lokola banyama. Nyonso wana, na mabenisi ya baye bazali kokamba ekolo, bandeko ba biso moko. Yango wana tozala na bokebi, tofungola miso ; bakosa biso te mpe totika te moto aya koyiba nkita ya “province” ya biso te, oyo nkita eye baling koya ko exploiter, ndenge tozali koyoka.

8.      Bandeko, soki tosekwi na Yezu, toluka mambi ma likolo: esika Yezu azali, o loboko la mobali la Tata. Tokanisa mambi ma likolo, kasi ma nse te (cf. Kol 3, 1-2). Nsekwa ya Yezu elakisi ‘te bomoi bolongi liwa, bolingo bolongi boyinani, bosolo bolongi lokuta, elikya elongi bozangi elikya mpe mwinda molongi molili. Ata tozali na mikakatano ndenge nini, ata na mpasi ya liwa, tozala na elikya ‘te Yezu ayei kobondo biso. Liwa likangi bomoi na lilita te ; mwinda moyei kobengana molili ya masumu ma biso. Bomoi, bolingo bolongi liwa.

9.      Tosambela mpe tolanda ndakisa ya Yezu mpo ‘te ekolo ya biso, « province » ya biso ya Mayi-ndombe mpe mabota ma biso mabima na malita (ya masumu) mpe mwinda mwa nsekwa mongenga solo. Mama Santu Maria oyo abombaki elikya mpe akobi koyamba ‘te mwango mwa Nzambe mokokokisama, azala na biso mpo toyeba ‘te bolingo bokokimisa liwa mpe bokobotisa bomoi lelo, lobi mpe o bileko binso seko.

Natombeli bino banso eyenga elamu ya Pasika ! Nzambe wa bokasi bonso abenisa bino, Tata, Mwana na Elimo Santu. Amen.

  Inongo, mwa 03/04/2021

+ Donatien BAFUIDINSONI, SJ.

Episkopo wa Inongo

Aucun commentaire:

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj
31.03. 2018-

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm
(06.01.1954-12.06. 1967) + 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
(12.06. 1967-22.07. 2005) + 19.11.17

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm
27.07.2005-31.03. 2018

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO