dimanche 12 novembre 2017

XXXIIème dimanche du Temps Ordinaire (A)

Lomingo la 32 o Mobu
*************
Bomilengele malamu zambi boyebi mokolo te, 
boyebi mpe ngonga te !
Le père Matthieu Mpampanye préside la messe dans la cathédrale d'Inongo (Photo archive)
Moto akotiya motema se na Nzambe azali lokola mosali molamu azali kokengele ntango nkolo wa ye akozonga. Soki Kristu akokuta biso bongo, akoyamba biso o bokonzi bwa esengo ya seko.
Litangi lya yambo: Liloba lya Nzambe lokola likomami o buku ya Bwanya (6,12-16)
Litangi lya Ibale: Mokanda mwa yambo mwa santu Polo ona Bakristu ba Tesaloniki ( 4,13-18)
Nsango Elamu lokola santu Mateo akomi (25,1-13)
L'abbé Christian Ngazain proclame la parole de Dieu
Yezu alobi na bayekoli moulani moye: " O Bokonzi bwa likolo ekozala lokola na bilenge basi zomi, bakei na miinda mya bango kokutana na mobali oyo akobala. 
 O Bokonzi bwa likolo ekozala lokola na bilenge basi zomi, bakei na miinda mya bango kokutana na mobali oyo akobala.
O ntei ya bango batano bazalaki bazoba, batano bazalaki na mayele. Bazoba bakamati miinda mya bango, kasi bamemi mafuta te. Baye ba mayele bakamati miinda mya bango na mpe mafuta o milangi.  Awa mobali awumeli, mpongi ekangi bango banso mpe balali. Kasi o kati ya butu moto moko agangi: " Bolongani ayei! Bokende kokutana na ye!" Bongo bilenge basi zomi balongwe o mpongi mpe babongisi miinda mya bango. Bazoba balobi na baye ba mayele: Bopesa biso mwa mafuta, zambi miinda mya biso mizali kozima. Kasi bango bazongisi: Te, mafuta makokoka na biso mpe na bino te; bino moko bosomba epayi bakotekeke mafuta.
O ntei ya bango batano bazalaki na mayele
Awa bakei kosomba, mobali akomi. Baye bazalaki kozila ye bakoti na ye o ndako ya limpati, mpe bakangi ezibeli. Na nsima bilenge basi basusu mpe bayei, balobi: " Mokonzi, mokonzi, fungolela biso ndako!". Kasi azongisi " Nalobi na bino ya solo, nayebi bino te!"
Bongo bokengeleke, zambi boyebi ata mokolo ata ngonga te."

Lokumu na yo, Kristu!

Aucun commentaire:

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj
31.03. 2018-

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm
(06.01.1954-12.06. 1967) + 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
(12.06. 1967-22.07. 2005) + 19.11.17

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm
27.07.2005-31.03. 2018

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO