mardi 26 avril 2011

Mokanda mwa Pasika mwa tata Episkopo na lingala


Diocèse d’Inongo

MOKANDA MWA PASIKA (2011) ONA BANDEKO BAKRISTU YA DIOCESE YA INONGO MPE BATO YA MOTEMA MALAMU.

« KRISTU OYO ASILI ASEKWI, AKOKUFA LISUSU TE, LIWA LIKOKI KOSALA YE LISUSU ELOKO TE » (Rm 6, 9)

Awa tosekwi na Kristu, tokota o etumba ya Ye ya Bolingo mpo ‘te Mai-Ndombe ezwa bomoi solo solo.

Bandeko ba bolingo,

Eyenga elamu ya Pasika na bino banso. Mokonzi Yezu oyo abuki bokasi bwa liwa mpo ya libela, abimisa biso o butu ya bobangi. Apesa biso nguya ya kobima na bokabwani bonso mpo ‘te tomitiya lisanga mpo ya kotonga Mai-Ndombe yasika, ndenge Mokonzi alingi ‘te tozala na bomoi (Jn 10, 10).

Bandeko,

Soko otamboli na Mai-Ndombe, eloko ekokamwisa yo liboso ezali biloko Nzambe akabeli biso: mai, ebele ya mai na mbisi izali na kati; zamba, ebele ya zamba, na nzete mpe nyama izali kuna; bisika ya kolona… Eloko mpe ya mibale ekokamwisa yo ezali ya komona mpasi ya bato. Bato bazali kobunda bango moko na kati ya mpasi ndenge na ndenge.

Soko oyebi mwa moke lisolo ya Mai-Ndombe okoyeba ‘te na libandela ,bato bayonkwamaki ming ina misala ndenge na ndenge ya mpasi; misala ya copal, misala ya mpembe ya nzoku, b.n.b. Eloko elekaki lisusu mabe ezalaki ndenge bazalaki kobete bato, kokata maboko ya basusu, koboma basusu. Oyo wana nde lisolo ya biso ya mpasi. Oyo wana mpe esika bobangi mpe bokabwani bokoteli basusu. Kasi malembe malembe awa Liloba ya Nzambe likoteli mpe mokili ya biso, tozwi bomoi bwa sika.

Bandeko, mpasi ya lelo ezali komonisa mpe biso ‘te ata tozali na kati ya Liloba, makambo ya kala ya bokabwani, ya bobangi, ya minyoko, makambo mana masili naino te. Toyebi ‘te esika bato bakabwani, esika bato bazali na kati ya bobangi, na kati ya minyoko, mokili ya bango mokoki kokende liboso malamu te.

Bandeko ba bolingo

Elikya ezali mpo nzela ya libiki ezali. Toyoka. Biso banso toyebi ndenge Nzambe na maboko ma Moise abimisi bana ya Israel na boumbu (Ex. 3, 7-10). Toyebi ndenge Nzambe akati bondeko na bango, awa ayebisi bango ‘te Ye moko Nzambe akosimba bomoi ya bango, akozala ntango inso mpe bipai binso libiki ya bango. Akopesa bango mokili ya bango moko, mokili motondi na biloko. Kasi Nzambe asengi mpe bango ‘te bakoma bandeko kati ya bango na bango; pe mokili bazwi mokoma mpo ya bolamu ya bango banso (Ps.136, 21-22). Nzambe amonisi bango bongo nguya ya ngolu ya, ye ya bolingo ya ye ( Dt 7, 6-8), bolingo ya molende.

Yezu oyo abotami o ekolo ya Israel, azali yemei mwana wa bolingo ya Tata (Mt 3,17), temô (monzeneneke) ya bolingo bwaTata mpo ya bato banso. Yezu amemi bolingo ya Tata liboso liboso na bato babwakamaki, batiamaki pembeni lokola basumuki, bato ya maba, bato bakufa makolo bakufa miso, bato ya misala ya pamba lokola bakengeli mpata... Mpo ya kobikisa bango Yezu abangi te kobuka mobeko ya sabato; abangi bafariseo te na bateyi ba mobeko te awa bazali kotongo Ye mpo akolia esika moko na basumuki (Lc 15, 1-2). “Bomoi ya moto boleki mobeko ya sabato” (Mc 3, 1-5); ngolu ya Tata ezali mpo ya bato banso, lokola moi na mbula izali mpo ya bato banso (Mt 5, 44-45).

Tee na kati ya mpasi ya Ye tee liwa, Yezu aboyi kozongisa mabe na mabe; alimbisi babomi ba Ye (Lc 23, 34). Abundi solo etumba ya Bolingo tee na kati ya liwa. Bokasi ya bolingo ya ye bobuki bokasi ya liwa. Asekwi mpe atondisi mokili na bokasi ya bolingo, bokasi ya bomoi. Alongi etumba ya Bolingo.

Bandeko, toyebi ‘te Yezu alongi etumba ya Bolingo bobele mpo ya ye moko te; kasi lokola Yaya ya bayekoli ya ye ya kala mpe ya biso lelo. Bango lokola biso lelo, tokimaka makambo mpe topanzanaka soko makambo mabebi. Kasi Ye atikaka biso te. Ye apesi biso, lokola apesaki bayekoli ba kala, nguya ya ye mpe alobi ‘te akozala na biso mikolo minso kin’o nsuka ya molongo (Mt 28, 16-20). “Bokende”... lokola Tata atindaki ye, ye mpe atindi biso (Jn 20,21). Azali mpe na kati ya etinda tozwi.

Etinda tozwi ezali mpe ya kobunda etumba ya Bolingo.Toyebi ‘te tokolonga yango. Tokolonga yango mpo nguya ya bolingo, oyo eleki nguya ya liwa, ezali na biso. Tokolonga yango mpo toyebi ‘te Mokonzi azali na biso, azali mpe na kati ya lisolo ya bomoi ya biso ya Mai-Ndombe. Mbongo, bokonzi bwa nse na bisengo binso bizali biloko bikoleka, lokola baye banso batiyi elikya ya bango mobimba likolo ya byango (Ps. 115, 4.8).

Bandeko ba bolingo

Eyenga ya Pasika ezali ya solo eyenga ya “victoire” (lilongi) ya Bolingo, eyenga ya bomoi. Bobele bolingo bokolonga liwa.

Tomikotisa bongo na kati ya etumba ya bolingo mpo Mai-Ndombe ezwa bomoi solo solo. Tomikotisa na nguya ya Yaya’ Yezu-Kristu mpe lisanga.

Na nkombo ya Ye moto alongi etumba ya bolingo,

§ Tomikotisa , bandeko, lisanga o etumba ya kopesa na bato banso lokumu ya bomoto ya bango. Tokanisa awa ( epai ya biso) na bandeko Batwa, na bandeko bazali na boloko, bato ya maladi ya liboma...

§ Tomikotisa lisanga o etumba ya boyokani, ya bomoko : na kati ya bikόlo na mabota; tofungwama na bandeko basusu ! Totikala kokangema te bobele na bato ya biso moko.

§ Tomikotisa lisanga o etumba ya bosembo na makambo matali ba mama veuves (bakufa mibali) na bana bitike; makambo ya bosembo na tribunal mpo ya babola; bosembo mpo ya biloko Nzambe apesi biso lokola zamba. Toboyi corruption ya ndenge inso.

§ Tomikotisa,bandeko, lisanga o etumba ya makambo makonyata to makokitisa bomoto ya bandeko batau... “moto azali moto”. Yango wana toboyi matungisi manso ya bandeko basoda to ba policiers maye masalemi mpo ya koluka mbongo. Yango ezali kolembisa mpiko ya bato mpo ya mosala.

Bandeko ba bolingo,

Mokili oyo Nzambe apesi biso alingi te ‘te totika yango ebeba mpo ya bobangi ya biso to mpo ya boluli biloko to lokumu bokoleka. Moto akosa biso te.

Awa tosekwi na Kristu, tokota o etumba ya Bolingo bwa Ye.

Yemei “Elombe ya bomoi” akamba biso ntango inso o kati ya nzela inso ya bomoi bwa biso. Tokoma bongo “Bato ba bomoi”, bato bakopesa baninga mpe mokili ya biso bomoi solo.

Eyenga elamu ya Nsekwa o nkombo ya Mokonzi.

Ye moko apambola mpe abenisa biso.

Inongo, mwa le 24 Avril 2011

Wa bino,

Tata Episkopoko Philippe NKIERE KENA,

Episkopo wa Inongo.

Aucun commentaire:

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj
31.03. 2018-

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm
(06.01.1954-12.06. 1967) + 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
(12.06. 1967-22.07. 2005) + 19.11.17

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm
27.07.2005-31.03. 2018

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO