Diocèse d'Inongo Evêché MOKANDA MWA PASIKA (2010) (Tokoki kotanga mokanda moye kobanda pasika tee na nkitela ya Elimo santu) Ona bandeko bakristu ya Diocese ya INONGO. "Kristu asekwi : tosekwa biso na ye" (Nzembo ya mbonda ya Pasika) Bato ba nsekwa, tozali na nguya ya kobongisa bomoi bwa biso moko mpe bwa Ekolo ya biso. Bandeko ba bolingo, Eyenga Elamu ya nsekwa ya Mokonzi na bino banso. Bandeko, Boyebi 'te biso na A. Henri Godé (secrétaire) na Mr Boko Rodolphe (professeur Assistant ya ISP na Inongo) touti kopesa session (mateya) na Inongo, na Kiri, na Bokoro mpe Nioki likolo ya "Boyambi mpe bolingi bwa ekolo" ( Foi et patriotisme). Mpo ya pasika eye, nalingi kokabola na bino makambo tolobaki na session ena. Bandeko ba bolingo, Tobanda liboso likolo ya Boyambi.Biso banso toyebi 'te boyambi ezali liboso likabo liuti epai ya Nzambe oyo alingi bongo komikaba na biso. Soko tondimi likabo yango tokomifungwama bongo na bomoi ya sika Mokonzi akopesa biso na Eklezya. Eklezya ezwi mosala ya koteya mpo ya kokolisa likabo yango. Kasi likabo yango ekomonana solo solo na misala mokristu azali kosala. " Boyambi bozangi misala, bozali na bomoi lisusu te" (Yak 2, 26). Mokristu lokola mwana wa ekolo ya ye, azwi ekolo mpe lokola likabo. Ekolo ezali ndako ya ye, asengeli kolinga yango mpe kosalela yango. Ezali lotomo. Mokristu akolakisa boyambi bwa ye mpe na bosali misala ya ekolo: ezali bongo zambi tosengeli kozala bakristu ntango inso mpe bipai binso. Yezu, Mwana wa Nzambe abotami na ekolo yoko mpe amikotisi na ekolo yango, asaleli yango mpe alingaki yango. Amikotisi na mimeseno ya mboka ya ye. Yango wana ntango inso, Yezu akotangema lokola Yezu wa Nazareth. Amikangemaki kaka na ekolo ya ye te, kasi mpo 'te afungwama na batu banso, andimaki mpe amindimaki lokola mwana ya ekolo ya ye, ya libota lya ye. Tala ndakisa biso bakristu tosengeli komekola : kolinga ekolo ya biso mpe kosalela yango bo ebongi. Soki totali na bokebi, banda ekolo ya biso ezwi lipanda, lelo mibu 49, malamu ezangi te, ndakisa : ekolo ezali na bokabwani te : totikali ekolo yoko. Kasi soko totali malamu manso na mbeba, mbeba eleki. Mpo nini ? Mpo bisu mpe bakristu tobikeli bokristu bwa biso malamu te. Tobebisi bongo ekolo na bizaleli bya biso. Baepiskopo basanganaki likita na sanza ya juillet 2009 mpe bamoni 'te ya solo ekolo ebebi mingi, ezongi nsima mingi. Mpe na kati ya mbeba yango, bamoni 'te mama ya mbeba ezali nde "madesu ya bana" oyo tobengi "corruption". Ntina ya bozongi nsima ya ekolo ya biso makasi yango wana. « Corruption » yango euti na ntina eye :
Bakristu basengeli kosala misala mya bokristu mpe kobongisa ezalela ya bango na boboyi "corruption". Corruption, toyeba yango, ezali lisumu monene mpe maladi monene ezali kozindisa ekolo. Soko otangi mikanda misantu, okomona 'te "corruption" ezali lisumu. Ndakisa :
Mpo nini "corruption" ezali lisumu o misu ma Nzambe ? Uta kala, Nzambe abundaki etumba mpo ya kolongola yango o ntei ya bana ba Israel. Nzambe akati bondeko na bana ba Israel mpe apesi bango mokili mwa elaka, awa abimisi bango o boumbu bwa ezipeti. Alingi 'te moto moko akelela te, alela te mpe azanga eloko te na mokili yango. Mpe moko te apekisa baninga ba profiter na mokili yango, na biloko ya mokili yango mpo ezali mokili ya Ye moko Nzambe apesi bango. (Dt 6, 11). Nkolo mokili ezali Nzambe, ezali moto moko te. Moko moko asengeli koyeba korespecter moninga motu mpo azwa oyo asengeli na yango.Lokola mokili ezali ya Nzambe mpe apesi na batu, banso bazwi yango bakomi ba "gerants". Moko amitiya likolo ya moninga te. Banso bakomi ba partenaires, basangoli (heritiers) cogerants mpo bazwi mokili na maboko ya Nzambe. Biloko tokuti na mokili Nzambe apesi biso yango mpo tosalisana. Tokomi ba responsables ya biloko tozwi mpe ya mokili Nzambe apesi biso. Tozali na lotomo ya kobatela biloko, mpe ya kobongisa mokili na mosala na biso. Nzambe akokweisa lisusu "manna" lokola na esobe te, biloko bikobima na mosala na bisu. Mosala ezali lotomo. Yango wana, corruption ezali lisumu mpo tozali kosalela boiloko bya mokili ndenge Nzambe atindi te. Coruption ezali lisumu monene :
Awa batu bazwi biloko ya Nzambe lokola biloko ya bango moko, bazangi bosembo, bakomi komitala lokola bazali likolo ya baninga, bazali kosumuka : lisumu liboso ya Nzambe, lisumu liboso ya baninga batu mpe lisumu liboso ya biloko ya mokili. Bandeko ba bolingo, Tokosenga 'te etumba eye ekosalema na paroisse mpe na CEV mpo 'te corruption esila, ezala lotomo monene mpo ya moko moko ya bandeko bakristu ya diocese ya biso. « Toboyi corruption ». Ezali makambo ya mokili ya kala kozwa to kosenga « madesu ya bana ». Biso tokoti na mokili ya sika, na Pasika ya Mokonzi. Pasika elamu na bino banso mpe Nzambe wa biso abenisa ekolo mpe banso na mobu moye mwa jubilé ya ekolo ya biso. O nkombo ya mokonzi oyo alongi liwa, Wa bino, Tata Episkopo + Philippe NKIERE KENA Episkopo wa Inongo. Inongo, mwa le 05 avril 2010 |
mercredi 14 avril 2010
Lettre de Pâques de Mgr l’évêque ! Mokanda mwa pasika mwa tata episkopo!
Inscription à :
Publier les commentaires (Atom)
Aucun commentaire:
Enregistrer un commentaire