samedi 15 avril 2017

Veillée Pascale

Mwinda mwa Kristu 
Tokotondo Nzambe 
********************.
1. Sepela, sepelani, mampinga ma banzelu, sepelani mibombamo mya Nzambe, mpe mondule mokumisa Mokonzi : Yezu Kristu asekwi lelo.
2. Sepelani, molongo mobimba, sepelani mokolo moye mwa esengo, mpe banso boyebaka malamu, tolongwi na kati ya molili.
3. Sepela, maman Eklezya, nkembo ya Mokonzi, mpe mingongo mya biso banso miningisa ndak'eye ya Nzambe.
4. Yango wana, bandeko ba bolingo, o liboso lya mwinda moye, sambelani ko elongo na ngai, sambelani Nzambe wa bokasi.
5. Mpo 'te ona abengi ngai, ngai moto mpamba, o mosala mwa ye, asopelela ngai ngrasya ya ye, nakoka bongo koyembela buzi eye.

Mbonda ya Pasika / exultet

1.Bosepela, mampinga ma banzelu. Eeee  esengo...!
Nse yoka nsai, Eklezya mpe sepela.  Eeeee esengo...
O kati ya tempelo eye butisani mpe nzembo. Kristu asekwi, tosekwa biso na ye.

2. Mokonzi wa biso, elombe ya banzelu,  Eeee  esengo...!
atondisi nse mobimba na nkembo ya ye.  Eeee  esengo...!
Mama eklezya atondi na lokumu- Kristu asekwi...

3. Tala pasika ya sika, ya solo mpenza.  Eeee  esengo...!
Oyo bakoboma, mpata mpata mpenza.  Eeee  esengo...!
Makila ma ye masantisa bakristu!- Kristu asekwi...

 4. Butu bonene obikisaki bana ba Israel.  Eeee  esengo...!
Babimi o ezipeti, bakatisi mbu Etane.  Eeee  esengo...!
Opetoli bango mitema, na lipata. Kristu asekwi...

 5. Butu bonene, Kristu akataka minyololo mwa liwaaa.  Eeee  esengo...!
Abuti bo elombe, awuti o nse ya mabele.  Eeee  esengo...!
Amemi nse mobimba na ye, ye molingi wa etumba aa. Kristu asekwi..

6.Na butu boye bosantu, kamata e Tata Mosantu mwinda mwa biso. Eeee  esengo...! 
Na yango babenisi bana ba ekolo ya yo basangani bakobonzela yo.  Eeee  esengo...!
Lokola nde mwa libonza lya mpokwa- Kristu asekwi..

7. Tokosenge yo Mokonzi, oyangela obatela mpe.  Eeee  esengo...!
Ba Nganga Nzambe na bakristu banso ba nse.  Eeee  esengo...!
Elongo na papa mpe wa biso episkopo. Kristu asekwi...

8. Nsai ya pasika etikala o mitema seko.  Eeee  esengo...!
Tobwaka bisengo bya nse, tokangisa mitema se o likolo; Eeee  esengo...!
Tosangana na Mokonzi Yezu, mwinda mokopela seko ! Kristu asekwi..

Aucun commentaire:

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj
31.03. 2018-

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm
(06.01.1954-12.06. 1967) + 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
(12.06. 1967-22.07. 2005) + 19.11.17

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm
27.07.2005-31.03. 2018

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO