Mokolo mwa Pasika
****************
Lelo, mama ya biyenga bisno bya Bakristu. Mobikisi wa bato banso alongi liwa. Ye nde mwinda mokolakisa biso nzela ekokamba o mboka Tata. Mawa masili, boumbu mpe bosili. Na esengo enene banso toyemba: Aleluya".
Matangi
Liloba lya Nzambe lokola likomami o buku ya Bikela ba Bapostolu ( 10, 34 a.37-43)
Mokanda mwa santu Polo ona bakristu ba Kolosse (3,1-4)
Nsango elamu lokola santu Yowane akomi (20,1-9)
Mokolo nsima ya Sabato, mokolo mwa eyenga na nta ntongo, Maria wa Magadala na Maria mosusu bakendeki kotala lilita lya Yezu mpe bazalaki kolela.
![]() |
Ezalaki naino molili, basi bakei kotala lilita lya Yezu |
Bamoni 'te libanga lilongwi o monoko mwa lilita. Maria alobi: balongoli Mokonzi o lilita mpe toyebi te esika batii ye.
Anzelu alobi. tala nsango nayeli bino: Asekwi, azali na bomoyi.
Anzelu alobi na basi: nobanga te, nayebi 'te bozali koluka Yezu, oyo babakaki o kuruze. Azali awa te, zambi asekwi lokola alobaki. Yakani kotala esika batiyaki ye. Bokende noki koyebisa bayekoli ba ye 'te Asekwi o bawa mpe akei liboso lya bino o Galilela, bokomono ye kuna". Yango nde nsango nayeli bino.
Azali na bomoi lelo, lobi libela !
Eyenga elamu ya Pasika na bino banso.
Eyenga elamu ya Pasika na bino banso.
Aucun commentaire:
Enregistrer un commentaire