dimanche 16 avril 2017

Pâques du Seigneur !

Mokolo mwa Pasika
****************

 Lelo, mama ya biyenga bisno bya Bakristu. Mobikisi wa bato banso alongi liwa. Ye nde mwinda mokolakisa biso nzela ekokamba o mboka Tata. Mawa masili, boumbu mpe bosili. Na esengo enene banso toyemba: Aleluya".

Matangi
Liloba lya Nzambe lokola likomami o buku ya Bikela ba Bapostolu ( 10, 34 a.37-43)
Mokanda mwa santu Polo ona bakristu ba Kolosse (3,1-4)
Nsango elamu lokola santu Yowane akomi (20,1-9)

Mokolo nsima ya Sabato, mokolo mwa eyenga na nta ntongo, Maria wa Magadala na Maria mosusu bakendeki kotala lilita lya Yezu mpe bazalaki kolela.

Ezalaki naino molili, basi bakei kotala lilita lya Yezu

Bamoni 'te libanga lilongwi o monoko mwa lilita. Maria  alobi: balongoli Mokonzi o lilita mpe toyebi te esika batii ye.


Anzelu alobi. tala nsango nayeli bino: Asekwi, azali na bomoyi.
 Anzelu alobi na basi: nobanga te, nayebi 'te bozali koluka Yezu, oyo babakaki o kuruze. Azali awa te, zambi asekwi lokola alobaki. Yakani kotala esika batiyaki ye. Bokende noki koyebisa bayekoli ba ye 'te Asekwi o bawa mpe akei liboso lya bino o Galilela, bokomono ye kuna". Yango nde nsango nayeli bino.

Azali na bomoi lelo, lobi libela !
Eyenga elamu ya Pasika na bino banso.

Aucun commentaire:

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj
31.03. 2018-

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm
(06.01.1954-12.06. 1967) + 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
(12.06. 1967-22.07. 2005) + 19.11.17

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm
27.07.2005-31.03. 2018

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO