vendredi 18 août 2023

Maloba ma tata Episkopo sima ya likama ya mai o Mboka Oshwe

 MALOBA ONA BANDEKO BA MAÏ-NDOMBE 

SIMA YA LIKAMA LYA MAI O MBOKA OSHWE


 

Bandeko,

1.     Motema mwa ngai motondi na mawa mingi na boyoki likama lya mai liy eliwuti kosalema mokolo mwa mibale ya poso  eye (to mokolo mwa zomi na mitano ya sanza eye) o mboka Oshwe, pembeni na libongo. Nayoki ‘te bamoni bato bawei 25 (ntuku ibale na mitano), basusu bazali komonono te. Ezali mpasi mpe mawa mingi ya koyoka mpe komona makambo ya boye. Nalingi kobondo mabota maye mabungisi bandeko mpe koyebisa bango ‘te tozali lisanga na losambo. Tata Nzambe, mopesi bomoi, Yemei abondo bango mpe bato bawe ibazwa bopemi bwa seko. Nalingi mpe kotondo baye banso bamipesaki mpo ya kobikisa baye banso bazindaki o mai mpe babikisi bato ebele.

2.     Na boyoki likama liye, nazali komituna mpo na nini makambo ya boye mpe moto moko te ayebi montango ya bato bazalaki na baleinière mpo mikanda mizali te. Nani asengeli komema mokumb amona ? Tala ndenge tozali kozwa bomoi bwa bato na litioli mpo ya moyibi ya mbongo mpe  komemabato na liwa.

3.     Soki tozalaka bato ba kilo mpe baye bayebi ntina ya bomoi, mbele totindi bazuzi mpo ya koyeba baye basengeli komema mokumba mona. Kasi tokotinda nani mpamba te na Mai-Ndombe bakonzi basengeli kokata makambo  bazalaka lisusu te koleka mbula mobimba. Bazali kosala mosala te mpo na nini ? Mpo bazuzi bakomi kobanga, moto akobatela bango azali te, kobanda babetaki Procureur Général, mpe bato basengelaki kokangema mpo yamakambo mana bakangi bango te. Likambo mosusu ya nsoni ezali ‘te basengaki na ba « députés provinciaux » ya biso bandima ‘te basambisa bakonzi bana, kasi, mpo ya moyibi mpe lokoso ya mbongo, baboyi kosala mosala moye basengeli kosala. Yango wana bandeko, awa tozali kopusana na maponomi, nakosenga na bino bolala te, bozala na ekenge mpe boyeba nani bosengeli kopono ; botala nkota to mboka te, kasi bopono moto oyo akoki kosala ‘te province ya biso ekende liboso. Ba députés na biso bayebi kosenga te ‘te bayebisa bango nini bato basali na mosolo mwa leta. Ndakisa, bino moko bomoni ‘te OVD ebandaki mosala na engumba ya Inongo, kasi batiki mabulu bisika binso mpe moto akotuna bango azali te. Moto na moto azali kosala oyo ye alingi. Ezala na santé ezala na makambo masusu, eloko ya malonga ezali te, ata leta apesaki mbongo, mpe ba députés bakangi monoko. Mpo na nini ?

4.     Maye masalemi na Oshwe masengeli kobenda biso banso matoyi.  Koleka mposo ibale, toyokaki ‘te bitumba bisalemaki na Oshwe. Na Kwamouth, kimya mpe boboto bokotinaino te. Na ebandeli yamobu moye (2022-2023) o Eklezya, nalobaki : « Tozala banso bandeko mpo ya kotonga Eklezya ».Banso tozali bandeko mpamba te bomoko boleki bokwabani. Tokozala makasi sokot ozali lisanga (Mk 3, 24-25 ; Mt 12, 25) ; mpe loko lamisapi, moko moko wa biso azali na litomba. Kotala baninga lokola bapaya, yango nde ezali kozongisa biso nsima na esika ‘te tokende liboso. Soko totie baninga mpembeni, tokomikotisa na bobola mpe na mpasi na makambo manso. Tozala lisanga mpo ‘te totombola mboka mpe Eklezya ya biso.

5.     Ekolo ya makasi nde ekolo eye ekondima baninga, moko moko na lolenge ye azali, kondima mpe komekola makambo ya malamu yabaninga. Kondima baningae kosenga komitala, koyeba kotika makambo ya mabe ma biso mpe kondima makambo ya malamu  , koyamba bosolo bwa Kristu boye bokokomisa biso bansomi.

6.     Mpo nakosukisa, nakosenga na bino bosalisa baye banso bazali na mpasi na Kwamouth, na Oshwe mpe na bisika binso bato bazali na mpasi. Banso lisanga tosala mosala mwa kotonga province ya biso. Soki province ya biso ebongi, ekozala ntina ya lokumum po ya biso banso. Kasi makambo toyokaka mpo ya province ya biso ezalaka se makambo  ya mpasi mpe ya nsoni, lokola na Oshwe, na Kwamouth mpe na Inongo wapi esika bakonzi basengeli kokata makambo bazali te. Tosengeli koyoka nsoni.

7.     Bandeko, banso lisanga toboya kaniaka (madesu yabana to corruption) oyo ekoti tee o kati na biteyelo bya biso ; mpe totonga province ya biso na ndenge elongobani oyo ekopesa biso lokumu o miso ma bato. Nzambe, Tata wa biso banso, azala na biso mpe akamba biso o nzela ya Ye ya mwinda.

                                                                                                                            

  Inongo, mwa 16 août 2023

+Donatien BAFUIDINSONI, SJ.

Episkopo ya Inongo

 

 

Aucun commentaire:

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj
31.03. 2018-

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm
(06.01.1954-12.06. 1967) + 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
(12.06. 1967-22.07. 2005) + 19.11.17

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm
27.07.2005-31.03. 2018

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO