dimanche 17 avril 2022

Mateya ma Pasika 2022

 

MATEYA MA PASIKA  2022

Matangi ma butu: Gn 1, 1-2,2 ;Rm 6, 3b-11 ; Lk 24, 1-12

Matangi ma lomingo : Bk 10, 34a.37-43 ; Kol 3, 1-4 ; Jn 20, 1-9

Bandeko boboto!

« Mokonzi akeli mokolo mwa lelo mpo tosepela mpe toyoka nsai » (Nz 117, 24)

1.      Nzembo eye tokoyembaka mibu minso na eleko ya pasika esengeli kosalisa biso na mikolo miye mpo tomanyola malamu ‘te : Nzambe akeli mokolo moye mpo tosepela, zambi libiki lya biso limonani. Na pasika tokosepela mobombamo mwa libiki lya biso, mpamba te boombo bwa lisumu mpe bwa liwa bosili.

2.      Na mobu moye, tosengeli kosepela pasika na esengo mingi mpenza epai ya biso. Na bisika misusu o mokili, bandeko brakistu bazwi libaku ya kosepela pasika malamu te mpo ya bokono boye bwa Coronavirus bolekisi mibu mibale mpe bozali kosila te. Na ekolo ya Ukraine bitumba bizali kongala likolo ya baye bakanisi ‘te bango bakonzi ba mokili, bakoki kosala oyo balingi mpe koboma bato. Na Esti ya ekolo ya biso, bitumba mpe bisili te ata bakonzi ba ekolo bakopesa malako ndenge na ndenge. Mabota ebele makabwani, makimi ndako mpo ya koluka kimia o zamba, o esobe to o mikili misusu. Mana manso mazali kotalisa lolenge motema ya moto mozali mabe, lokola mitema mya baye bakanaki kokitisa Yezu o likambo mpe koboma Ye o kuruse.

3.      Kristu abengani molili mona mpe amemeli biso mwinda moye mokopesa biso boboto na esengo. Yango wana topesili buzi na butu boye bosantu : Kristu oyo asekwi azali mwinda mwa mokili. Mwinda mwa Ye mokosalisa biso tomona mokili mwa sika. Yango wana bandeko, lelo tosengeli kolongwa o molili mpe topelisa mwinda mwa Kristu, mwinda mwa pasika. Mpambe te, soki tolongwe o molili te, tokoki kosekwa elongo na Kristu te oyo amemeli biso elikya ya sika mpe akolendisa boyambi bwa biso.

4.      Yango nde liteya tokoyoka na Nsango Elamu ya Santu Yoane na misa ma lomingo la pasika. Santu Yoane akoloba ‘te : « na nta ntongo, ezalaki naino molili, Maria wa Magdala akei o lilita » (Yn 20, 1). Molili mona mokolakisa lolengo motema mwa ye mozali : azali naino o molili mpamba te azali na ntembe, babomi Mokonzi wa ye mpe azali lisusu na elikya te. Azali koluka ebembe ya Yezu, azangi mayele ma komanyola mikanda misantu mpe ma kokundola mateya Yezu ateyaki mpo ya nsekwa ya Ye. Azali koluka o kati ya bawa moto azali na bomoi, lokola toyoki mpo ya basi o Nsango Elamu ya butu bwa lelo.

5.      Lokola Maria wa Magdala, lokola basi ba Nsango Elamu ya santu Luka, tosengeli kobima o molili, na malita ma biso mpo ya kongengisa mwinda mwa Kristu, mwinda mwa nsekwa.

6.      Lelo tozali na bilembo mingi bikoki kosalisa biso tobikela nsekwa ya Kristu malamu mpe toyamba ‘te Kristu alongi lisumu, alongi liwa. Na Nsango Elamu ya lomingo, santu Yoane azali kotalisa lolenge akuti bilamba o nse mpe elamba eye bazingaki Yezu o moto’. Bilembo bina bizali komonisa ‘te balongolaki ebembe ya Yezu te lokola Maria wa Magdala akanisaki. Kasi, lokola azalaki o molili, azangi miso ma boyambi mpo ya komona Yezu asekwi. Petro mpe kaka ndenge moko, amoni bilamba kasi azali naino koyamba te. Kasi Yoane nde moto akoyamba : « Amoni mpe ayambi » (Yn 20, 8).

7.      Ya solo, moyekoli Yezu abandaki kolinga nde moto ayambi liboso. Tosimba yango malamu. Balobi te ‘te azali moyekoli oyo alingaki Yezu mingi, kasi oyo Yezu abandaki kolinga mingi. Elingi koloba ‘te, mpo ‘te tokola na boyambi, mpo ‘te mwinda mwa nsekwa mongenge o kati ya biso, tosengeli kotika ‘te bolingo bwa Yezu bozala na biso. Kasi, mbala mingi, molili mwa lisumu mokosala ‘te bolingo bwa Kristu bozala na biso te mpe molili mona mokosala ‘te tomona makamwisi ma Nzambe o bomoi bwa biso te. Tosala ‘te Kristu alinga biso, bolingo bwa ye bozala na biso mpo ‘te tobongwana mpe tomona mambi manene azali kosala o kati ya biso.

8.      Ata lisumu moko te likoki kopekisa biso tozala na bolingo bwa Kristu oyo ayei kolongola biso o boombo mpe kopesa biso bonsomi bwa bana ba Nzambe. Tokanisa Petro. Awangani Yezu na ntango ya malozi, kasi akomini ntoma mpe nzeneneke ya nsekwa ya Yezu Kristu awa aleli masumu ma ye mpe atiki ‘te Yezu atala ye mpe alinga Ye. Na litangi lya yambo la lomingo, tokomona na bikela bya bapostolo ‘te Petro abongoli bomoi bwa ye mpe akomi ya solo kondima Yezu lokola Mesiya. Na Nsango Elamu ya Santu Yoane (Yn 21), tokomona ‘te awa Petro akutani na Yezu asekwi mpe andimi, bomoi bwa ye bobongwani akomi nzeneneke monene ya nsekwa.

9.      Na litangi lya yambo ya misa ma ntongo, tokoyoka ‘te Petro akosakola kaka nsekwa te kasi alingi ‘te biso mpe tozala « ba temoins », banzeneneke ya nsekwa. Yango wana akoloba : «  Atindaki biso toteya bato mpe tosakola ‘te Yezu azali moto oyo Nzambe atiaki zuzi wa bato bazali na bomoi mpe baye bawa » (Bk 10, 42). Yango wana biso bakristu,  tosakola kaka Liloba lya Nzambe na monoko te kasi tozala mpe banzeneneke (ba temoins) ba solo.

10. Yango wana Santu Polo akoloba boye na litangi lya ibale la lomingo : « Soko ya solo bosekwi elongo na Kristu, boluka se mambi ma likolo… » (Kol 3, 1). Nsekwa ya Yezu esengeli kosalisa biso toluka liboso mambi ma likolo, mpo totonda na mambi ma nse. Na ebandeli ya mateya, nalobaki makambo maye makoki kozangisa biso elikya. Makambo maye makolakisa ‘te mingi mpenza bakonzi ba mokili, biso mpe lokola, tokokanisa ‘te bisengo bya nse, bomengo mpe lokumu bikoki mpo ya biso. Totala se bato bazali kokamba ekolo lelo to baye bakambaki ekolo na mikolo mileki, tokomona ‘te balingi kaka bango moko bazala malamu, batondama na biloko byanse, kasi baninga te. Mpe o kati ya bango, mingi bazali bakristu to bazali komibengama bakristu.

11. Lelo bandeko, tobikela pasika ya mobu moye malamu mpo ‘te mwinda mwa Kristu oyo asekwi mongenge o mitema mya biso mpe mobongola bomoi bwa biso bwa mokolo na mokolo mpe toyeba, lokola bakristu, komipesa mobimba mpo ya komekola ezaleli ya Kristu. « Kristu azali bomoi bwa biso, mokolo ye akomonono, biso mpe tokomonono na nkembo elongo na Ye » (Kol 3, 4). Na mobu moye tokoyamba Papa François o ekolo ya biso Congo, nakosenga na bino bolengele mitema malamu mpo ‘te toyamba ye lokola mosali wa boboto mpe wa bolingo.

12. Yezu Kristu oyo asekwi apesa  bomoi bwa sika na maye manso mazali o kati ya biso mpe zingazinga ya biso mpe Mama Santu Maria asambela mpo ya biso mpo ‘te mokolo mwa lelo mozala solo mokolo mwa mwa nsai. Amen. Na bino banso, na mabota ma bino, natombeli « eyenga elamu ya Pasika ».

 

Inongo, mwa 16/04/2022 

+ Donatien BAFUIDINSONI , S.J.

Episkopo wa Inongo

 

 

 

Aucun commentaire:

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj
31.03. 2018-

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm
(06.01.1954-12.06. 1967) + 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
(12.06. 1967-22.07. 2005) + 19.11.17

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm
27.07.2005-31.03. 2018

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO