dimanche 29 octobre 2017

XXXème dimanche du Temps Ordinaire (A)

Lomingo la 30 o Mobu
*************
 Linga Nzambe mpe linga ndeko
*******
Bandeko, na mobeko moye monene moleki mibeko minso "Linga Nzambe mpe linga moninga lokola okomilingaka" Nzambe alakisi biso ntina ya solo ya bomoi bwa biso mpe nzela ya esengo ya solo.
Tosambela:  Nzambe wa bokasi bonso mpe wa lobiko
Okolisa o mitema mya biso boyambi, bolikyi na bolingi; 
osalisa biso tolanda mitindo mya yo, na ntina 'te tokoka kozwa 
maye olakelaki biso. Tokobondela bongo...
Litangi lya Yambo: Liloba lya Nzambe lokola likomami o buku ya Bobimi (22,20-26).
Mokolo moko Moze apesi mibeko mya Nzambe, alobi: "Bonyokola mompaya te, botungisa ye mpe te, zambi bino moko bozalaki bampaya o Ezipeti. Boyokisa mwasi akufeli mobali to mwana etike mpasi te. Soki bosali bango mabe, mokolo bakobelela ngai, nakondimela bango......."
Litangi lya Ibale: Mokanda mwa yambo mwa santu Polo ona bakristu ba Tesaloniki (1, 5c-10)
Bandeko, boyebi maye tosalaki mpo ya bolamu bwa bino, ntango tozalaki epayi ya bino. 
Nsango Elamu lokola Santu Mateo akomi (22,34-40)
Eyoki ba Farizeo 'te Yezyu akangisaki ba Saduseo monoko, basangani likita. Moko wa bango, moteyi wa Mobeko atuni ye mpo ya komeka ye: " Moteyi, mobeko nini moleki bonene o buku ya Mibeko?"
Yezu alobi na ye: "Linga  Mokonzi Nzambe na motema mwa yo mobimba, na makasi ma yo manso mpe na mayele ma yo manso". Tala mobeko mwa liboso moleki bonene. Mobeko mwa mibale mokokani na moye mwa liboso: Linga moninga lokola okomilingaka. Manso makomami o Buku ya Mobeko mpe o Bikoma bya baprofeta mazali o mibeko mina mibale"
Lokumu na yo- Kristu.
Lomingo elamu na bino banso !

Aucun commentaire:

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj
31.03. 2018-

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm
(06.01.1954-12.06. 1967) + 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
(12.06. 1967-22.07. 2005) + 19.11.17

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm
27.07.2005-31.03. 2018

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO