mardi 24 décembre 2013

Lettre pastorale de mgr l’évêque pour Noel : version lingala !

Mokanda mwa Tata Episkopo po ya Mbotama (2013)
*****************************************


Ona bandeko bakristu ya Diocèse ya Inongo

« Lelo baboteli bino Mobikisi….,mwana abotami sika» (Lc 2,11-12)
Ntango ya bondeko bwa solo na babola yango oyo 
Bandeko ba bolingo,
Natombeli bino Eyenga elamu ya mbotama!
Mokonzi afungolela biso mitema mpo tobikela Eyenga ya Mbotama eye na bozindo ya likambo likweli biso bato mpe mokili mobimba ; ezali likambo litali biso mpe lelo.
Biso bakristu tondimi ‘te mokolo moko Mwana Nzambe akomi moto ; abotami lokola mwana moke, na mama moko ya biso ya nse, Maria. Abotami lokola mwana moke mobola. Na Nsango Elamu ya Luka elobami boye : « bokokuta mwana abotami sika, bazingi ye na bilamba, alali o elielo ya bibwele » (Lc2, 12).
Bandeko ba bolingo,
Ya solo, mbotama ya Mokonzi ememeli biso bato mpe mokili mobimba ntango ya sika: ntango ya bondeko ya sika ya Nzambe na biso bato, awa Mwana-Nzambe akamati elongi ya mwana abotami sika; ezali elembo ‘te elongi ya moto nyonso, elongi ya mobola, elongi ya moto motau ekomi elongi Nzambe alati.
Nzambe ya biso amimonisi bongo Nzambe ya babola, Nzambe ya bato mpamba, Nzambe ya bato batau. Nguya ya ye amonisi yango na kati ya bolingo bonene oyo bomemi ye mpo ‘te amikomisa moto ya nsuka, mwana abotami sika! Nguya ya ye ezali bolingo ofélé, bolingo ndelo te, bolingo ya ngolu amemeli biso mpe azali kokoba komemela biso lelo. Ya solo, likolo na nse bitondi na kilo ya bolingo, ya ngolu ya ye mpo ya biso babola: zambi moto nyonso, soko amitali malamu, azali mobola, andima to andima te. Ntango oyo ezali ntango ya kotika bobangi, ntango Nzambe ye moko, mpo ya bolingo, andimi kolata bomoi ya mpasi ya biso babola. Ntango yango oyo ezali ntango ya kotala mokili oyo na miso ya esengo mpe ya elikya, awa Nzambe ye moko, mpo ya bolingo, andimi kotambola na biso ntango inso mpe bipai binso.   Mbotama, feti ya kokundola ntango ya sika oyo ekomeli biso bato awa mwana Nzambe amikomisi mobola. Totondo Nzambe oyo amikomisi ndeko ya biso, na kati ya bomoi ya biso ya mokolo na mokolo. 
             Bandeko ba bolingo,
Awa Nzambe andimi kokoma moto na kati ya bomoi ya mwana moke mobola, apesi biso bongo lotomo ya kopesa kilo na bato bake, bato bataw, bato mpamba. Okokumisa Nzambe solo bobele “soko oyokeli mpe moto  wa mawa ngolu” (Prov.14,31b), lokola mpe “moto anyokoli moto motaw, atumoli mozalisi wa ye” (Prov.14,31a). Okokutana solo na Nzambe soko obandi komona mobola oyo azali mpe nsuni ya nsuni ya yo, makila ya makila ma yo (Is.58,8); soko mpe obandi komona elongi ya ye Nzambe na elongi ya mobola. Mbala inso otali moninga moto mpamba, otali mpe Nzambe mpamba. Oleisi moto azali na nzala, oleisi mpe Mokonzi; oboyi koleisa moninga ya nzala to kopesa ye ata mai, oboyi mpe kosala bongo na Mokonzi. Ekomami polele na esambi ya nsuka (jugement dernier): Mt 25, 31-46. Esambi ya nsuka esi ebandi lelo, na ndenge tokosimba babola.
Papa François azali kolemba te koyebisa biso bato ya lelo likambo yango. Ezali likambo likomema bomoi ya sika na mokili mobimba to liwa ya nsomo na biso banso mpe na bikelamo bisusu ya mokili. Bandeko, ntango yango oyo ya kopesa babola kilo ya bomoto mpe ya bondeko bozali kosangisa biso banso o kati ya mwana-Nzambe akomi moto. « To bondeko to liwa”. Lelo, na ekolo ya biso RDC mpe  na mokili mobimba, soko topesi bato bake lokumu la bomoto lokola esengeli na moko moko wa biso, wana nde tokokota na “mokili ya sika”, ndenge Nzambe alingi. Soko te, tokotonga mokili ya moto (linfelu) awa o nse, esika ya bokabwani mpe ya bobomani.
Bandeko,
Ntango bato ebele na ekolo ya biso, bazali kokanisa bobele na mbongo ya bango moko, na pouvoir ya bango moko, na succès ya bango moko, kolia mpe komele ya bango moko, biso tozali kosala nini? Koluka kozala lokola bango, to kolelalela? Ekobongisa eloko te. Ozali mokristu to nani ozali?
Bato babongisi mokili oyo mpe bakotisi basusu na ntango ya sika, lokola Monsieur Nelson Mandela na Afrique du sud, ezali bato batiyi liboso bolamu ya baninga bato, mpenza mpenza bolamu ya bato bake; ezali bato bandimi minyoko mpe mpasi ndenge na ndenge mpo bato basusu batika konyata baninga bato mpe banso bazwa dignité ya bomoto.
Soko tolingi ‘te mabota matambola, mboka etambola, Ekolo etambola, Eklezya etambola, tosengeli kopesa bato bake esika ya bango oyo Mokonzi Yezu apesi bango awa andimi kobotama lokola mwana moke mobola; ezali esika ya liboso. Kasi soko totali bato basusu mpamba, esika ndenge wana Mokonzi azali te, bosembo bozali te, boboto mpe te. Kasi esika eye totomboli bato mpamba, esika wana Nzambe akotombola biso. Na esika ndenge wana, tokoki koloba: lelo libiki lya Mobikisi limonani o kati ya biso. Ntango ya bondeko bwa solo na babola, yango oyo…
Bandeko ba bolingo,
Mbotama Elamu !  Totondo Nzambe elongo na Tata Cardinal Laurent Monsengwo oyo asepeli mibu 50 (ntuku mitano) ya bonganga bwa ye le 22 décembre. Mokonzi atondisa ye na bolamu…
Mpo ya bino banso nasengi na Mokonzi nguya ya ye mpo totonga Mai-Ndombe ya sika ndenge toyoki na mokanda. Nzambe abenisa biso banso mobu moye mwa sika mokomi penepene 2014. Boboto mpe bondeko na bino.

  Wa bino Tata Episopo
+ Philippe NKIERE KENA                                   
Episopo wa Inongo 
  Inongo, Mwa le 24 décembre 2013

Aucun commentaire:

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj
31.03. 2018-

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm
(06.01.1954-12.06. 1967) + 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
(12.06. 1967-22.07. 2005) + 19.11.17

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm
27.07.2005-31.03. 2018

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO