dimanche 6 mai 2018

VIème dimanche de Pâques

Lomingo la Motoba o eleko ya Pasika
***************
Mobeko mwa ngai mwango moye: bolinganaka!

Bandeko, ut'o ebandela ya Eklezya, Kristu  akoponoko o bikolo binso bato baye bakozala banzeneneke  ba bolingo bwa ye. Aponi mpe biso tosala se bongo.

Banso tosepela, Nzambe akolinga biso e, banso tosepela Nzambe akoboya biso te.
1. Nkolo Nzambe akeli binso'aw'o nse;
Nzambe akoboya biso te (2x)
2. Kasi bato baboyi kotosa Mokonzi
Nzambe akoboya biso te
3. Wan'atindeli biso Yezu Kristu e
Nzambe akoboya biso te ( 2x)

Tosambela:
E Nzambe wa bokasi bonso, na mitema esengo tozali kosepela eyenga ya pasika.
Awa tokokundola liwa mpe nsekwa ya Kristu,
osalisa biso tobongisa solo bizaleli bya biso.
Tokobondela bongo zambi lya Yezu Kristu, Mokonzi wa biso mwana wa yo ye Nzambe; azali na nkembo elongo na yo pe na Elimo santu;  o bileko binso seko. Amen.
Litangi lya Yambo: Liloba lya Nzambe lokola likomami o buku ya Bikela bya Bapostolo (10, 25-26.34-35.44-48)
Litangi lya Ibale: Mokanda mwa yambo mwa santu Yoane ( 4, 7-10)
Nsango Elamu lokola santu Yoane akomi (15,9-17).

Aucun commentaire:

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj
31.03. 2018-

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm
(06.01.1954-12.06. 1967) + 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
(12.06. 1967-22.07. 2005) + 19.11.17

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm
27.07.2005-31.03. 2018

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO