dimanche 3 septembre 2017

XXIIème dimanche du Temps Ordinaire

Lomimgo la Ntuku Ibale na Ibale o Mobu
*****************************
Bandeko, tosenge Nzambe lelo alendisa biso toyeba kokanga mitema o ntango ya mpasi lokola Kristu andimaki komeme kuruse ya ye mpo ya kobikisa biso. 
Nzembo: Teleme Nzambe, teleme; yaka kosalisa biso
1. Tata Yo Mozalisi wa molongo mobimba
Bobele yo Nkolo e na nguya na bwanya e.
2. Ut'o ebandela e Yo osambisa ns'eye
lelo sukisa banso bakotumola yo e
3. Zambi bakokanela ye Mosaleli Yezu
Biso mpe basaleli tokoyaka mpasi e

Tosambela:
E Nzambe wa bokasi , liziba lya malamu manso,
Osalisa biso tokumisa nkombo ya yo, tozala bondeko na yo,
olendisa mabongi o mitema mya biso ; obatela biso mpo tosalela yo na mpiko.
Matangi: 
Litangi lya Yambo: Liloba lya Nzambe lokola profeta Yeremia akomi (20,7-9)
Litangi lya Ibale: Mokanda mwa santu Polo ona bakristu ba Roma (12,1-2)
Nsango elamu lokola santu Mateo akomi .

Nzambe wa bokasi bonso abenisa bino:
Tata: mwana na Elimo Santu.

Lomingo elamu na binso banso !

Aucun commentaire:

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj
31.03. 2018-

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm
(06.01.1954-12.06. 1967) + 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
(12.06. 1967-22.07. 2005) + 19.11.17

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm
27.07.2005-31.03. 2018

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO