dimanche 24 décembre 2017

MBOTAMA YA YEZU KRISTU

Misa Ya Butu
***********
Na Butu oyo tozali na nsai, na butu bwa lelo Mobikisi ayei !
O Butu bwa lelo bolingi bwa Nzambe bomononi polele na boyei bwa Mwana wa ye.  Ye Mwinda mwa libiki akofandisa biso banso na boboto. Na motema esengo, toyamba ye lokola bakengeli ba mpata bayambaki ye.

Matangi:
Liloba lya Nzambe  lokola profeta Izaya akomi (9,1-3.5-6)
Mokanda mwa santu Polo ona Tito (2,11-14)
Nsango Elamu lokola santu Luka akomi (2,1-14)
O mikolo mina Kaizaro Augusto atindi 'te batanga bato ba bokonzi bwa ye. Babandaki kotanga bato ntango Kwirinio azalaki moyangeli wa Siria. Bongo bato banso bakei kopesa nkombo, moto na moto o mboka ya ye. Yozefu mpe alongwe o mboka Nazarete o Galilea, akei o Yudea o Beteleme, mboka ya Davidi, zambi azalaki moto wa libota lya Davidi. Akei kokomisa nkombo elongo na Maria, mwasi ye abali; Maria azalaki na zemi. Ezalaki bango kuna, ntango ya kobota ekoki. Maria aboti mwana wa ye wa bongondo, azingi ye na bilamba mpe alalisi ye o eliyelo ya bibwele, zambi bazwaki esika te o ndako ya bampaya (...) !
Joyeux Noël

Aucun commentaire:

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj
31.03. 2018-

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm
(06.01.1954-12.06. 1967) + 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
(12.06. 1967-22.07. 2005) + 19.11.17

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm
27.07.2005-31.03. 2018

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO