dimanche 7 mars 2010

Message de carême de Mgr l'évêque



Mokanda mwa Karezimo

Ona bakristu ya Diocèse ya Inongo

“NATIYI LIBOSO YA BINO BOMOI TO LIWA….BOPONA BOMOI(Mbk 30, 19)

Totika” nzela ya Kaina”…..

Bandeko bakristu ba bolingo,

Awa nazongi na Inongo nsima ya mobembo mpe bokutani bwa baepiskopo, nasepeli mingi kokomela bino mokanda moye. Natombeli bino banso ntango elamu ya Karezimo . Mokonzi asalisa moko moko ya biso mpe lisanga mobimba ya diocèse ya biso; ntango eye ekoma solo ntango ya losambo makasi; ntango ya kotika makambo mabe makala ; ntango ya komikotisa o kati ya mpasi ya baninga bato mpo ‘te baye bakeleli to bazali na mpasi bazwa libiki epai ya biso (Ntina ya kolala nzala mpe ya kokabola biloko).

Bandeko, lokola toyebi malamu, mobu moye ekolo ya biso ekosepela mbula ntuku mitano (50) ya Indépendance. Na diocèse ya biso, paroisse ya Bokoro ste Croix ekosepela mbula nkama moko ya Nsango Elamu. Nzambe azwa lokumu mpo ya bolamu asali biso mpe azali kokoba kosala na ekolo ya biso mpe na Paroisse Ste Croix ya Bokoro. Azwa lokumu mpo ya baye banso bazali kopesa bomoi bwa bango mpo ekolo ekende liboso. Merci na Nzambe mpo ya basango, bandeko bakatekisi, ba nyango bamemelaki biso Nsango Elamu na Bokoro. Mpo ya baye banso , lelo, bazali komikaba, mpo’te Yezu Kristu ayebana mpe amema libiki lya Ye na bato banso :ezala na misala, na bosakoli liloba, na bomoi bwa bango. Nzambe azwa lokumu .

Kasi, bandeko, likambo lizali mpe kopesa mpasi makasi o ekolo mpe o eklezia ya biso, lizali boye : bato ebele o kati ya biso bazali kolanda « nzela ya Kaina ». Nzela ya Kaina ezali nini ? Ezali nzela ya kokosa mpe koboma baninga.Toyebi ‘te tokoki koboma na ndenge ebele ! Ekomami boye na buku ya Libandela 4,8 : « Kaina alobi na ndeko wa ye Abel : « Tokende kotambola ». Awa bakomi o bilanga, Kaina akangi ndeko wa ye Abel mpe abomi ye ».

Bandeko boni te o ekolo ya biso bakoti na momeseno ya koyiba salaire ya baninga ? Ya kokosa baninga, ata na nkombo ya Nzambe, na makambo basali te ? Bandeko boni te bazali koluka nzela inso ya lokuta mpo balonga makambo mpe bosolo boyebana te ? Bandeko boni te o ekolo mpe o eklezia bazali kotala basusu lokola bato mpamba ? Lokoso ya mbongo, lokoso ya bokonzi mpe ya bisengo ya bango moko, oyo nde likambo batiyi liboso ya bolamu ya baninga bato ! Balingi bolamu ya baninga te ; balingi bomoi ya baninga te.Balingi bobele konyata, kobebisa bomoi ya baninga. Bazali bakosi mpe babomi.

« Nzela ya Kaina » ezali nzela ya « tata mokosi mpe mobomi monene », Satana (Jn 8, 44). Mokonzi Nzambe wa biso aboyi nzela wana solo.Biso me toboya yango.

Ya solo bandeko,soko totangi mikanda misantu malamu, tokomona ‘te Nzambe azali Nzambe wa bomoi. Aboyi nzela inso ekotiya bato na liwa. Aboyi nzela inso epai wapi bakokosa, bakonyokola bato. Nzambe amitiyi ye moko epai ya bato banyokwami mpe bazali na mpasi : « Namoni mpasi ya bato bangai o Ezipeti ; nayoki boleli bwa bango, zambi bazali konyokwama ; solo nayebi mpasi ya bango. Yango wana nakani kobikisa bango o maboko ma ba-Ezipeti, mpe nakokende na bango o mokili molamu mpe monene…… »(Bob 3,7-8). Nzambe wa biso azali Nzambe ya bomoi liboso mpenza mpo ya baye banso bakufwa nzala,bazali na kati ya minyololo, baye banso bazanga baboti to bamama bakufwa mibali(PS 146,7-9). Yezu na maloba mpe na misala ya ye, alukaki bobele kopesa bomoi na bato banso bazangi bomoi : ezala na basumuki, ezala na bato bakufwa miso, na baye bakufwa makolo, ezala na bato batiamaki mpembeni. Alobi polele : « nayei mpo bato bazwa bomoi mpe bazwa yango koleka »(Jn10,10). Bato ya lolendo mpe baye banso bazali kokosa mpe konyata baninga, Yezu ayebisi bango polele ‘te bokonzi ya Nzambe ayei kobanda bozali ya bango te (Mt23,1-36). Basengeli kobongola ezaleli ya bango mpo bakota na bokonzi ya Nzambe.

Bandeko ba bolingo,

Na ntango eye ya Karezimo topono solo nzela ya bomoi: nzela ekopesa biso bomoi bwa solo; nzela ekopesa baninga bato bomoi; nzela ekopesa mboka ya biso mpe ekolo ya biso bomoi. Komela bangi to komipesa na ekobo’ ekomemela yo bomoi ya solo te. Koyiba biloko baninga baloni na mpasi ekopesa yo mapamboli ya Nzambe te. Kosomba zuzi na tribunal to koyiba salaire ya mpasi ya baninga(a ta eyebani te) ekobebisa bosembo o ekolo. Konyokolo motu motau ezali kotumola Mozalisi wa ye (Biy.14,31). Komeme baninga bato o kati ya molili mwa lokuta, ekomema yo moko o butu bwa liwa.

Bandeko totika solo “Nzela ya Kaina”, mokosi mpe mobomi wa ndeko waye.

Oyo wana nde nzela ezali kobebisa bomoi ya biso mpe ya ekolo mobimba. Mosakoli Izaya alobi solo : ”soko botiki kotiela bato mikumba, kokanela baninga mpe koloba maloba mabe, soko bopesi mampa na moto ayoki nzala, soko bopesi bilei na moto anyokwami, Mwinda mwa bino mokongenge o kati ya molili, mpe molili mokobongwana moi mwa midi.

Yawe akokamba bino ntango inso, akotondisa mpe akolendisa bino (Is.58,5-11.).

Karezimo elamu na bino banso, bandeko ba bolingo.
Nabenisi bino o nkombo ya Nzambe ya bomoi, oyo akosenga biso ‘te topono bomoi.

Wa bino, Tata Episkopo Philippe NKIERE KENA

Episkopo wa Inongo

Inongo, 5 mars 2010.

Aucun commentaire:

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj
31.03. 2018-

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm
(06.01.1954-12.06. 1967) + 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
(12.06. 1967-22.07. 2005) + 19.11.17

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm
27.07.2005-31.03. 2018

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO