tag:blogger.com,1999:blog-4459891271719626750.post3784619708087643664..comments2023-12-08T17:36:31.331+01:00Comments on DIOCESE D'INONGO: le diocèse pleure ya Yowani ( abbé Jean Monsembula) ! RIPÉvêché/Diocèse d'Inongohttp://www.blogger.com/profile/06924629277359654411noreply@blogger.comBlogger1125tag:blogger.com,1999:blog-4459891271719626750.post-75782564827493981782012-01-27T23:08:23.662+01:002012-01-27T23:08:23.662+01:00Ya Yowani,
Nazali naino kotanga mikanda ya suka ok...Ya Yowani,
Nazali naino kotanga mikanda ya suka okomelaki ngai; nazali naino koyoka lolaka la yo ntango tosololali mbala ya nsuka, esali lelo mwa ba sanza. Olobelaki ngai se na maloba moke 'te lolenge lisusu ya kokoma ezalaki te. Kasi basango basusu bakosalisa...
Osengaki ngai 'te nazala se "courageux et surtout optimiste, surtout bomoi ezalaka seko ya mwana ya Nzambe". Oteyaki ngai lisusu lokola bo momesano tango inso nafandaki na yo, na Bokoro, na Bandundu, mpe bipai binso, 'te nabosanaka te kosalisa baninga...
Nayebaki na makomi nsima ya Sango 'te ozalaki na mpasi makasi... Nalelaki na mai o miso...
Olobaki 'te akosambela mikolo minso mpo na biso... Osengaki napesa mbote mingi na mwasi na bana ba ngai.
Nasambelaki Nzambe 'te alingisa ngai naya kotala yo na Pasika. Yango nakomelaki na Sango mokonzi. Nalakelaki 'te nakoya.
Kasi, lelo nazwi nsango ya bozongi bwa yo o mboka Tata, naleli, kasi natiyi lisusu elikya kaka na ye, na losambo.
Nazalaki moko wa ba oyo oyebisaka 'te na nsima ya bosaleli Eklezya ya Diocèse, okosilisa bomoi bwa yo na Monastère...
Nakoki koya te naya kokunda yo lokola mwana akundaka tata; lokola leli akundaka leki. Mokano mwa Nzambe mokokisama mpe ye moko azwa lokumu.
Nakozala motema mpe makanisi lisanga na baninga banso bakoya kuna na Monastère mpe mikolo minso okotikala na motema mwa ngai.
Na nkombo ya libota mobimba, opema na Boboto mpe Nzambe apesa yo esika abongisaki yo o mboka ya ye.
Wa yo,
Norbert MBU-MPUTU, Newport (Pays de Galles, Royaume-Uni).Norbert XSON M.M.https://www.blogger.com/profile/13080261937331876041noreply@blogger.com