vendredi 24 novembre 2017

Les armoiries épiscopales de Mgr Léon Lesambo

Dominus illuminatio mea et salus mea
********************

Nzambe azali mwinda mpe libiki lya ngai
nabanga lisusu nini ?
Nzambe akobatelaka bomoi bwa ngai,
bongo nani akoki kobangisa ngai ?
2. Soko bato babe babimeli ngai,
mpo ya kosilisa mpe koboma ngai,
bango moko, banyokoli na banguna,
bakoselumwa mpe bakokweya se wana.

3. Ata limpinga mobimba liyeli ngai,
motema mwa ngai mokobanga te.
Ata etumba makasi ebimeli ngai,
nazali se na elikya.
4. Nasengi Nzambe mpo yoko, nalingi se yango:
nafanda ondako ya Ye mikolo minso,
nasepela bolingi bwa Mokonzi
nakende o ndako ya Ye nkembo.

5. Zambi akobombela ngai esika o ndako ya Ye
o mikolo mpasi ekokwela ngai.
Akobomba ngai o ema ya Ye esantu,
akotelemisa ngai o libanga linene.
7. Mokonzi, yoka ngai, nazali kobelela Yo:
ondimela ngai, oyanola ngai.
8. Motema motindi 'te naluka Yo,
naluki se elongi ya Yo, Mokonzi.
9. Obombela ngai elongi ya Yo te,
obwaka mosalleli wa Yo mpo ya nkanda te,
zambi mosalisi wa ngai, se Yo.
E Nzambe, Yo mobikisi wa ngai,
oboya ngai te mpe otika ngai te.

13. Nayebi solo 'te nakomono bolamu bwa Nzambe
o mokili mwa baye bazali na bomoi.
14. Tia elikya epai ya Mokonzi, zala makasi,
lendisa motema, tia motema na Mokonzi.

Aucun commentaire:

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj
31.03. 2018-

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm
(06.01.1954-12.06. 1967) + 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
(12.06. 1967-22.07. 2005) + 19.11.17

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm
27.07.2005-31.03. 2018

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO