dimanche 8 octobre 2017

XXVIIème dimanche du Temps Ordinaire (A)

Lomingo la Ntuku Ibale na nsambo o Mobu
****************************
Photo archive
Bakristu bazali lokola basali ba elanga ya vino ya Nzambe, yango nde Eklezya. Na nsuka Nkolo akosenga moto na moto mbuma ya nzete ya ye, yango nde boboto, bolingani na bosembo.
Nzembo: Nkolo wa mabele aloni nzete azingi yango na lopango atiki mpe ndako ya sinzili. Mokonzi aloni elanga ya vino, atikeli biso mokili ....!
Litangi lya yambo: Ata bato basali mabe, Nzambe akotika ta kolinga bango lokola nkolo akolingaka elanga ya vino yaye.
Liloba lya Nzambe lokola profeta Izaya akomi (5,1-7).
" Tika nayembela moninga wa ngai wa motema nzembo, nzembo ya moninga wa ngai mpo ya elanga ya ye ya vino. Bolingo wa ngai azalaki na elanga ya vino ya mabele malamu o nsonge ya ngomba..."
Nzembo: Banso tosepela, Nzambe akolinga biso e, banso tosepela Nzambe akoboya biso te. 
Litangi lya Ibale: Boboto Nzambe akopesaka boleki manso bato bakoki kokanisa.  
Mokanda mwa santu Polo ona bakristu ba Filipi (4,6-9).
"Bandeko, bomitungisa te , ata na nini kasi bosambela mpe bobondela Nzambe...".
Nsango Elamu lokola santu Mateo akomi (21,33-43)
Yezu alobi na banganga bakonzi mpe na ba Farizeo: " Boyoka moulani mosusu. Moto moko azalaki nkolo wa mabele mpe aloni nzete ya vino, azingi elanga na lopango, abongisi ekamelo ya vino mpe atongi linongi lya mokengeli; atiki elanga o maboko ma bafuteli mpe akei mobembo...".

Aucun commentaire:

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj
31.03. 2018-

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm
(06.01.1954-12.06. 1967) + 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
(12.06. 1967-22.07. 2005) + 19.11.17

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm
27.07.2005-31.03. 2018

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO