dimanche 9 juillet 2017

XIVème dimanche du Temps Ordinaire

Lomingo la Zomi na Inei o Mobu
***************** 
Natondi yo botondi Tata, Mokonzi wa likolo na nse, 
zambi oyebisi bato bake maye obombeli bato ba bwanya mpe ba mayele.
Bandeko, nzela ya Nzambe ezali nzela ya bato te, mpo Nzambe aleki bango na bwanya mosika! Soki toyebi ntina te ya mpasi tozali koyoka, Kristu alobi na biso: Yakani epayi ya ngai, bino baye bolembi, ngai nakopemisa bino.
Litangi lya Yambo: Liloba lya Nzambe lokola profeta Zakaria akomi (9, 9-10)
Litangi lya Ibale: Mokanda mwa santu Polo ona bakristu ba Roma (8,9.11-13)
Nsango Elamu lokola santu Mateo akomi (11,25-30)
Tosambela:
 E Mokonzi Nzambe, Mwana wa yo amikitisi mpo ya kotombola bato bakweyaki o masumu, opesa bango esengo ekosuka te.
Yakani epayi ya  ngai, bino banso bolembi mpe bomemi mokumba, mpe ngai nakopemisa bino. Bondima mokumba nakomemisa bino mpe bolanda mateya ma ngai zambi nazali motema boboto mpe bosawa.
 Lomingo elamu na banso !

Aucun commentaire:

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj
31.03. 2018-

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm
(06.01.1954-12.06. 1967) + 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
(12.06. 1967-22.07. 2005) + 19.11.17

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm
27.07.2005-31.03. 2018

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO