dimanche 2 juillet 2017

XIII ème dimanche du Temps Ordinaire

Lomngo la Zomi na Isato o Mobu
*************** 
Bato ba Nzambe, bosakola makmwa ma Mokonzi. Aponi biso, asikoli biso, apesi biso nkombo ya lokumu.Tozali ekolo ya bato Nzambe aponi mpe apakoli mafuta, ekolo ya ba NgangaNzambe.
Bandeko, soki tosalisi mobola, soki toyambi mompaya malamu to soko tobikisi moto wa mpasi, Kristu akozongisela biso malamu maye manso, zambi tolandi ndakisa yemei apesaki biso.
Litangi lya yambo: Liloba lya Nzambe lokola likomami o buku ya Ibale ya Bakonzi ( 4,8-11.14-16a)
Litangi lya Ibale: Mokanda mwa santu Polo ona bakristu ba Roma (6,3-4.8-11)
Nsango elamu lokola santu Mateo akomi (10,37-42).
Tosambela:
Photo archive- Ste Croix/ Bokoro
E Nzambe Tata, oyoka losambo la biso: opesa biso motema mwa sika, tolakisa bato banso boboto, toyamba bango na esengo mpo ya nkombo ya Kristu, Mobikisi wa biso o bileko binso seko. Amen

Aucun commentaire:

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj
31.03. 2018-

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm
(06.01.1954-12.06. 1967) + 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
(12.06. 1967-22.07. 2005) + 19.11.17

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm
27.07.2005-31.03. 2018

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO