dimanche 23 avril 2017

IIème dimanche de Pâques

Lomingo la Ibale la Pasika
********************
Dimanche de la Divine Miséricorde.
 Se lokola abimeli bapostolo nsima ya nsekwa ya ye, Kristu akoya mpe o ntei ya biso, bapostolo ba sika. Akoyela biso mpe boboto mpe nguya ya Elimo santu.  Toyamba ye na motema mobimba.
Losambo la Ebandela:
E Nzambe nta ngolu, awa tosepeli lisusu eyenga enene ya Pasika, olendisi boyambi bwa batu ya ekolo ya yo:  opetoli biso na mai ma batisimo, Elimo santu akomisi biso bana ba yo, mpe Kristu asikoli biso na makila ma ye; osalisa biso mpo toyeba bonene bwa makabo maye.
Tokobondela bongo...
Litangi lya Yambo: Liloba lya Nzambe lokola likomami o buku ya Bikela bya Bapostolu ( 2, 42-47)
Litangi lya Ibale:Mokanda mwa yambo mwa santu Petro ( 1, 3-9)
Nsango Elamu lokola santu Yoane akomi (20,19-31)

Losambo la mabonza
**************
E Mokonzi,
Oyamba na bolamu mabonza ma bana ba yo. Na boyambi mpe na batisimo tokomi bakristu; osalisa biso toyingela o esengo ya lobiko. Tokobondela bongo...

Losambo nsima ya komunyo
E Nzambe wa bokasi bonso awa toleyi lisusu limpati lya pasika, Komunyo esangisa biso na Kristu. Totikala na ye motema moko mpo tokoma lokola ye. Tokobondela bongo...

Dimanche de la Divine Miséricorde
Mon Seigneur et mon Dieu ! C'est aujourd'hui le Dimanche de la Divine Miséricorde, et ce dimanche s’appelle aussi le “2e dimanche de Pâques” pour marquer que les cinquante jours de Pâques à la Pentecôte sont un seul et même temps : le temps de l’Esprit ! Dès le soir de Pâques, Jésus donne l’Esprit aux disciples (Jn 20,22).

Aucun commentaire:

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj
31.03. 2018-

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm
(06.01.1954-12.06. 1967) + 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
(12.06. 1967-22.07. 2005) + 19.11.17

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm
27.07.2005-31.03. 2018

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO